Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 17:8 - Mokanda na Bomoi

8 Loba na bango : ‹ Moto nyonso ya Isalaele to mopaya nyonso oyo azali kati na bango, oyo akobonza mbeka ya kotumba to mbeka mosusu,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 17:8
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe mpe abonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Yawe ayokelaki mboka mawa, mpe bokono oyo ezalaki koboma elongwaki na Isalaele.


Nakobalukela mpe nakolongola kati na bato na ye, moto nyonso oyo akolia makila, azala moto ya Isalaele to mopaya nyonso oyo avandi kati na bango ;


mpe amemi yango te na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kobonza yango lokola likabo epai na Yawe liboso ya Mongombo ya Yawe, makila na yango ekotangama na moto ya moto yango. Lokola asopi makila, bakolongola ye kati na bato na ye.


Bana ya Isalaele bakobonza lisusu te bambeka na bango epai banzambe ya bikeko ya bantaba ya mibali, oyo basambelaka. Oyo ekozala malako ya libela mpo na bango mpe mpo na milongo oyo ekoya. ’ ›


na kozanga komema yango na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kobonza yango epai ya Yawe, bakolongola ye kati na bato ya Isalaele.


Soki azali nde kobonza mwana meme lokola mbeka, akomema yango liboso ya Yawe.


Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, longwa na ebimelo kino na elalelo ya moyi ; bakobonza na bisika nyonso malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Kombo na Ngai mpe makabo ya peto, pamba te Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Mpe tango bana ya Isalaele bayokaki ete bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase batongi etumbelo na ngambo ya mokili ya Kanana, na Geliloti pene ya Yordani, na ngambo ya bana mosusu ya Isalaele,


Tango bakomaki na mokili ya Galadi, epai ya bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase, balobaki na bango :


— Tala liloba oyo lisanga mobimba ya Yawe elobi : « Ndenge nini bokoki penza kosala lisumu ya boye na miso ya Nzambe ya Isalaele ? Ndenge nini penza bokoki kopesa Yawe mokongo mpe komitongela etumbelo mpo na kotombokela Ye na mokolo ya lelo ?


Tonga etumbelo ya malamu mpo na Yawe, Nzambe na yo, na songe ya ngomba oyo. Na sima, kamata ngombe ya mobali mpe bonza yango nyonso lokola mbeka ya kotumba, na moto ya koni ya ekeko ya Ashera, oyo okataki.


Bongo okotambola liboso na ngai mpo na kokende na Giligali, mpe ngai nakokuta yo kuna mpo na kobonza bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Kasi osengeli kozela mikolo sambo kino naya kokuta yo ; mpe nakoyebisa yo makambo oyo osengeli kosala.


Samuele alobaki : — Nakokende ndenge nini ? Soki Saulo ayoki bongo akoboma ngai. Yawe azongiselaki ye : — Kamata mwana ngombe ya mwasi elongo na yo mpe loba : « Nakeyi kobonzela Yawe mbeka. »


Samuele akamataki mwana meme ya mobali, oyo ezalaki nanu komela mabele, mpe abonzaki yango mobimba lokola mbeka ya kotumba epai na Yawe. Abelelaki Yawe mpo na Isalaele, mpe Yawe ayokaki losambo na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ