7 Bana ya Isalaele bakobonza lisusu te bambeka na bango epai banzambe ya bikeko ya bantaba ya mibali, oyo basambelaka. Oyo ekozala malako ya libela mpo na bango mpe mpo na milongo oyo ekoya. ’ ›
Boye, ye moko Jeroboami aponaki banganga-nzambe mpo na bisambelo ya likolo ya bangomba mpe mpo na banzambe ya bikeko oyo asalaki na lolenge ya bantaba ya mibali mpe ya bana ngombe.
Ezali kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, libanda ya rido oyo ezali liboso ya Sanduku ya Litatoli, nde Aron mpe bana na ye ya mibali bakobanda kopelisa minda tango nyonso liboso ya Yawe, kobanda na pokwa kino na tongo. Ezali mobeko ya libela mpo na milongo nyonso ya bana ya Isalaele.
Bokeba ! Bosala boyokani te elongo na bavandi ya mokili yango ; noki te tango bakosambela banzambe na bango mpe bakobonzela yango mbeka, babenga bino mpo ete bolia mbeka na bango elongo ;
Bakomaki na kindumba mpe bamipesaki na yango wuta bolenge na bango, na Ejipito. Kuna, bato bazalaki kosakana na mabele na bango mpe kosimbasimba tolo na bango ya bolenge.
Atikaki te kindumba na ye oyo abandaki na Ejipito, oyo na tango ya bolenge na ye, mibali bazalaki kosangisa na ye nzoto, kosimbasimba tolo na ye ya bolenge mpe kosilisa baposa na bango ya nzoto epai na ye.
ngai nakotombokela moto yango mpe libota na ye, nakolongola bango na ekolo na bango, elongo na bato nyonso oyo balandaki ye mpo na kosalela nzambe Moloki.
ba-oyo bazangi kondima, ba-oyo mayele na bango ebebisama na nzambe ya mokili oyo, mpo ete bamona te pole ya Sango Malamu oyo emonisaka nkembo ya Klisto oyo azali elilingi ya Nzambe.
oyo bozalaki kosala na kala mpo na kobika bomoi na bino tango bozalaki kotambola kolanda baposa ya mokili oyo, mpe tango bozalaki kolanda mokonzi ya milimo mabe, molimo oyo ezali kosala sik’oyo kati na bato oyo bazangi botosi epai ya Nzambe.
Yawe alobaki na Moyize : « Ozali kokende kopema elongo na bakoko na yo ; mpe, kala mingi te, bato oyo bakopengwa mpo na kosalela banzambe ya bapaya kati na mokili oyo bozali kokota, bakobosana Ngai mpe bakobuka boyokani na Ngai, oyo nasalaki elongo na bango.
Kasi bato oyo bakufaki te na nzela ya bapasi wana batikaki te banzambe oyo maboko na bango moko esalaki ; batikaki te kogumbamela milimo mabe mpe banzambe ya bikeko oyo basala na wolo, na palata, na bronze, na mabanga mpe na mabaya atako emonaka te, eyokaka te mpe eninganaka te.