Na tango wana, bato bazalaki kotumba mbeka na bisambelo ya likolo ya bangomba, pamba te ezalaki nanu na tempelo moko te oyo etongamaki mpo na Kombo na Yawe.
Moto nyonso, azala mwana mboka to mopaya, oyo akolia mosuni ya nyama oyo ekufi yango moko to oyo babomi na nyama ya zamba, akosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi. Akozala mbindo kino na pokwa, sima na yango akokoma peto.
mpe amemi yango te na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kobonza yango lokola likabo epai na Yawe liboso ya Mongombo ya Yawe, makila na yango ekotangama na moto ya moto yango. Lokola asopi makila, bakolongola ye kati na bato na ye.
Akotia loboko na ye na moto ya mbeka, akokata yango kingo na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Bongo, Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron, bakosopa makila na yango na bangambo nyonso ya etumbelo.