Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 17:11 - Mokanda na Bomoi

11 pamba te bomoi ya ekelamu nyonso ezali kati na makila. Napesi bino yango mpo ete bosala na yango mosala ya bolimbisi masumu mpo na bomoi na bino, na etumbelo. Lokola bomoi ya moto ezali kati na makila, yango wana makila esalaka mosala ya bolimbisi masumu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 17:11
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi bokolia te mosuni oyo ezali na makila, pamba te makila ezali bomoi.


Akokata kingo ya ngombe liboso ya Yawe, bongo bakitani ya Aron, Banganga-Nzambe, bakozwa makila na yango mpe bakosopa yango na bangambo nyonso ya etumbelo oyo ezali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.


Aron akobonza, mpo na ye moko, ngombe ya mobali lokola mbeka mpo na masumu mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu na ye moko mpe ya ndako na ye. Sima na ye kokata kingo ya ngombe ya mobali oyo abonzi mpo na ye moko lokola mbeka ya masumu,


Boye, nalobaki na bana ya Isalaele : ‘ Moto moko te mpe mopaya moko te kati na bino akoki kolia makila. ’


Yango wana, nalobaki na bana ya Isalaele : ‘ Bokoki kolia makila ya ekelamu ata moko te, pamba te bomoi ya ekelamu nyonso ezali kati na makila na yango. Moto oyo akolia yango, bakolongola ye kati na bato. ’


Nganga-Nzambe akozwa na mosapi na ye ndambo ya makila ya mbeka oyo ebonzami mpo na bolimbisi masumu, akotia yango na maseke ya etumbelo ya mbeka ya kotumba mpe akosopa makila oyo ekotikala na makolo ya etumbelo.


Akotumba mafuta nyonso na etumbelo ndenge batumbaka mafuta ya mbeka ya boyokani. Boye, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya mokonzi ; mpe mokonzi wana akolimbisama. ’


Moyize akataki yango kingo mpe asalelaki mosapi na ye mpo na kotia makila ya ngombe yango na maseke ya etumbelo. Boye, apetolaki etumbelo ; bongo asopaki makila oyo etikalaki, na makolo ya etumbelo oyo abulisaki mpo na mosala ya bolimbisi masumu.


Pamba te Mwana na Moto ayaki te mpo ete basalela Ye ; kasi ayaki nde kosala mpo na bato, mpe kopesa bomoi na Ye lokola motuya ya kofuta mpo na kosikola bato ebele.


ezali makila na Ngai ya Boyokani, makila oyo esopani mpo na bato ebele, mpo ete masumu na bango elimbisama.


Bongo alobaki na bango : — Oyo ezali makila na Ngai ya Boyokani, makila oyo esopani mpo na bato ebele.


Nzambe akabaki Klisto lokola mbeka mpo ete, na nzela ya kosopa makila na Ye, Klisto azwa bolimbisi masumu ya bato oyo bazali kondima. Asalaki bongo mpo na kotalisa bosembo na Ye, pamba te, na tango ya kala, tango oyo akangaki motema, apesaki bato etumbu te mpo na masumu na bango.


Lokola tokomi sik’oyo bato ya sembo na nzela ya makila na Ye, Klisto akobikisa biso mpe na kanda ya Nzambe.


Kati na Klisto, tozwi lisiko na nzela ya makila na Ye, mpe bolimbisi ya masumu, kolanda bomengo ya ngolu ya Nzambe


Kasi bosala keba ete bolia makila te, pamba te makila ezali bomoi, mpe bosengeli te kolia bomoi elongo na nyama.


oyo, kati na Ye, tozwi lisiko mpe bolimbisi ya masumu.


mpe kozongisa, na nzela ya Klisto, boyokani kati na Ye moko Nzambe mpe bikelamu nyonso, ezala oyo ezali na mabele to mpe oyo ezali kati na Likolo, na kotia kimia na nzela ya makila oyo Mwana na Ye asopaki na ekulusu.


Yango wana Yesu mpe akufaki na libanda ya mboka mpo na kobulisa bato na nzela ya makila na Ye moko.


Pamba te, kolanda Mibeko, nyonso epetolamaka na makila ; mpe soki makila etangi te, bolimbisi masumu ezali te.


Kolanda mabongisi na Ye, Nzambe Tata apona bino wuta kala, abulisa bino na nzela ya Molimo na Ye mpo ete botosa Yesu-Klisto mpe bokoma peto na nzela ya makila na Ye, oyo asopaki. Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino na bofuluki !


Kasi soki tozali kotambola kati na pole ndenge Ye moko Nzambe azali kati na pole, wana tozali moko, bamoko na bamosusu, mpe makila ya Yesu, Mwana na Ye, ezali kopetola biso na masumu nyonso.


Amikabaki lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu na biso ; mpo na masumu na biso kaka te, kasi mpe mpo na masumu ya mokili mobimba.


mpe kowuta na Yesu-Klisto, Motatoli oyo akosaka te, Mosekwi ya liboso kati na bakufi, mpe Mokonzi ya bakonzi ya mokili ! Epai na Ye oyo alingaka biso mpe akangolaki biso na masumu na biso na nzela ya makila na Ye,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ