Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 16:8 - Mokanda na Bomoi

8 Aron akobeta zeke mpo na bantaba ya mibali nyonso mibale : moko mpo na Yawe, mpe mosusu, mpo na Azazeli.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 16:8
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bakobetaka zeke kati na elamba ya Nganga-Nzambe, kasi mikano nyonso ewutaka na Yawe.


Yango nde mokili oyo bokokabola na zeke lokola libula kati na mabota ya Isalaele, libota na libota na eteni na yango ya mabele, » elobi Nkolo Yawe.


Kasi ntaba ya mobali oyo zeke ekolakisa ete ezali mpo na Azazeli, akomema yango ya bomoi liboso ya Yawe mpo ete basala na yango mosala ya bolimbisi masumu, bongo bakotinda yango na esobe mpo na Azazeli.


Moto oyo akobengana ntaba ya mobali mpo na Azazeli, asengeli kosukola nzoto na ye na mayi ; mpe sima na yango, akozonga na molako.


Akozwa bantaba ya mibali nyonso mibale mpe akotia yango liboso ya Yawe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.


Bongo Aron akomema ntaba oyo zeke ekolakisa ete ezali mpo na Yawe, mpe akobonza yango lokola mbeka mpo na masumu.


Bato oyo basalaka na masuwa bamilobelaki bango na bango : « Boya ! Tobeta zeke mpo toyeba moto oyo azali kobendela biso pasi oyo. » Babetaki zeke, mpe zeke yango ekweyaki epai ya Yona.


Bakokabola mokili na kobeta zeke mpe libota moko na moko ekozwa libula na yango, kolanda bakombo ya bakoko ya bikolo na bango.


Bokokabola na kobeta zeke mabele ya mokili oyo ezali libula na bino : libota oyo eleki monene ekozwa mpe eteni ya mabele oyo eleki monene ; libota ya moke, ekozwa mpe eteni ya mabele ya moke. Libota moko na moko ekozwa eteni na yango ya mabele na esika oyo zeke ekokweya. Bokokabola yango kolanda masanga ya bituka na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ