Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 16:4 - Mokanda na Bomoi

4 Akolata na nzoto na ye : nzambala ya bule basala na lino mpe bakaputula ya lino ; akomikanga mokaba ya lino mpe kitendi ya lino na moto na ye. Lokola bilamba oyo ezali ya bule, asengeli komisukola nzoto na ye na mayi liboso ya kolata yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 16:4
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okotonga mpo na Aron, ndeko na yo ya mobali, bilamba ya bule lokola elembo ya nkembo mpe ya lokumu.


Okomema Aron mpe bana na ye ya mibali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe okosukola bango na mayi.


Basengeli kosukola na mayi yango mpo ete bakufa te tango bakokota na Ndako ya kapo ya Bokutani to tango bakopusana pembeni ya etumbelo mpo na kotumba makabo bazikisa na moto mpo na Yawe.


Okomema Aron mpe bana na ye ya mibali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe okosukola bango na mayi.


Pamba te akolaki liboso na Ye lokola nzete ya moke, lokola mosisa oyo ebimi na esobe ; azalaki ata na kitoko to lokumu te oyo ekokaki kobenda miso na biso ete etala ye ; lolenge na ye ezalaki ata na eloko moko te oyo ekokaki kosala ete tosepela na ye.


Tango bakobima mpo na kokende na lopango ya libanda, na esika oyo bato bazalaka, bakolongola bilamba oyo bazalaki kosalela mosala na kati mpe bakotika yango kati na bashambre ya bule ; bakolata bilamba mosusu mpo ete babulisa bato te na nzela ya bilamba na bango.


Namonaki bato motoba koya wuta na nzela ya Ekuke oyo ya likolo, oyo etala na ngambo ya nor ; moko na moko kati na bango asimbaki ebundeli oyo ebomaka na loboko na ye. Kati na bango, ezalaki na moto moko oyo alataki bilamba ya lino mpe azalaki na ekomeli na loketo na ye. Bakotaki na kati mpe batelemaki pene ya etumbelo ya bronze.


Bongo Aron akokota na Ndako ya kapo ya Bokutani, akolongola bilamba ya lino oyo alataki tango akotaki na Esika ya bule mpe akotika yango kuna.


Akosukola nzoto na ye na mayi na esika moko ya bule ; mpe akolata bilamba na ye. Sima, akobima libanda mpe akobonza mbeka ya kotumba mpo na ye moko mpe mpo na bato. Na nzela wana nde akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na ye moko mpe mpo na bato.


Nganga-Nzambe oyo bakopakola mafuta mpe akobulisama mpo na kosala mosala ya bonganga-Nzambe na esika ya tata na ye, akosala mosala ya bolimbisi masumu. Akolata bilamba ya bule ya lino.


Bakotumba yango te na levire : ezali eteni oyo napesi bango kati na bambeka na Ngai oyo etumbami na moto : ezali eloko ya bule penza lokola mbeka mpo na masumu mpe mpo na kozongisa boyokani.


Nganga-Nzambe akolata nzambala na ye ya lino mpe bakaputula na ye ya lino. Akolongola putulu ya mbeka ya kotumba oyo moto ezikisaki na etumbelo mpe akotia yango na mopanzi ya etumbelo.


Anjelu azongiselaki ye : — Molimo Mosantu akokitela yo, mpe nguya ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ekozipa yo na elilingi na Ye. Boye Mosantu oyo okobota akobengama Mwana na Nzambe.


kasi amikomisaki moto pamba, akomaki lokola mowumbu, amikomisaki lokola moto mpe amonanaki bongo lokola moto ;


Na bongo, topusana pene ya Nzambe na motema mobimba, na kondima nyonso, na motema oyo epetolami na makanisi nyonso ya mabe, mpe na nzoto oyo esukolami na mayi ya peto.


Boye, lokola bana yango bazali na nzoto mpe makila, Ye mpe asanganaki elongo na bomoto na bango mpo ete, na nzela ya kufa na Ye, asilisa nguya ya Satana oyo azalaki kosimba nguya ya kufa,


Boye, Yesu nde azali Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo abongi mpo na biso : azali Bule, asala ata mabe moko te, azali peto, akabwana na bato ya masumu, mpe Nzambe atombola Ye penza likolo koleka Likolo,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ