Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 16:34 - Mokanda na Bomoi

34 Oyo nde ekozala mpo na bino malako ya libela : mbala moko na mobu, bokosala mosala ya bolimbisi masumu nyonso ya bana ya Isalaele. » Mpe basalaki ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 16:34
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezali kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, libanda ya rido oyo ezali liboso ya Sanduku ya Litatoli, nde Aron mpe bana na ye ya mibali bakobanda kopelisa minda tango nyonso liboso ya Yawe, kobanda na pokwa kino na tongo. Ezali mobeko ya libela mpo na milongo nyonso ya bana ya Isalaele.


Mbala moko na mobu, Aron asengeli kosala mosala ya bolimbisi masumu, na maseke ya etumbelo ; akosala yango na makila ya mbeka ya masumu mpo na milongo oyo ekoya. Etumbelo ekozala bule koleka mpo na Yawe.


Moyize atalaki malamu misala yango mpe amonaki ete basalaki yango ndenge kaka Yawe atindaki. Boye Moyize apambolaki bango.


Yawe alobaki na Moyize : « Loba na Aron, ndeko na yo ya mobali, ete akotaka tango nyonso te na Esika ya bule, na sima ya rido, liboso ya esika ya bolimbisi masumu, likolo ya Sanduku mpo ete akufa te ; pamba te namimonisaka na nzela ya lipata likolo ya esika ya bolimbisi masumu.


Bokosala mosala moko te na mokolo wana, pamba te ezali mokolo ya kosala mosala ya bolimbisi masumu liboso na Ngai Yawe, Nzambe na bino.


Bokoki kosala ata mosala moko te. Na bisika nyonso oyo bokozala, oyo nde ekozala mobeko ya libela mpo na milongo ya bakitani na bino oyo bakoya sima na bino.


Bongo Moyize alobaki na bana ya Isalaele ; mpe babimisaki na libanda ya molako moto oyo alakelaki Nzambe mabe mpe babambaki ye mabanga. Bana ya Isalaele basalaki kolanda ndenge Yawe atindaki Moyize.


Ezali mobeko ya seko mpo na milongo oyo ekoya, na bisika nyonso oyo bokovanda : bokolia te ezala mafuta to makila. › »


Na mokolo ya zomi, na sanza ya sambo, bokozala na mayangani ya bule. Bokokila bilei, bokosala mosala moko te oyo bokosalaka mokolo na mokolo.


Pamba te, na nzela ya likabo moko kaka, akomisaki bato ya kokoka mpo na libela, ba-oyo apetolaki na masumu.


Nzokande, mobu na mobu, bambeka wana ezalaki kozongisa masumu na makanisi na bango,


Klisto akotaki kuna te mpo ete amikabaka mbala na mbala lokola mbeka, ndenge mokonzi ya Banganga-Nzambe azalaki kokota mobu na mobu kati na Esika ya Bule elongo na makila oyo ezalaki ya ye te.


Kasi kati na eteni ya mibale, kaka mokonzi ya Banganga-Nzambe nde azalaki kokota kuna mbala moko na mobu ; mpe asengeli komema makila ya kobonzela Nzambe, mpo na ye moko mpe mpo na masumu oyo bato basalaki na kozanga koyeba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ