Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 16:33 - Mokanda na Bomoi

33 Akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na ndako ya bule, mpo na Ndako ya kapo ya Bokutani, mpo na etumbelo, mpo na Nganga-Nzambe mpe mpo na bato nyonso ya lisanga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 16:33
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso, okokamata mwana ngombe ya mobali oyo ezanga mbeba mpe okopetola Esika ya bule.


Aron akobonza, mpo na ye moko, ngombe ya mobali lokola mbeka mpo na masumu mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu na ye moko mpe ya ndako na ye. Sima na ye kokata kingo ya ngombe ya mobali oyo abonzi mpo na ye moko lokola mbeka ya masumu,


Na nzela wana, akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na Esika ya bule likolo ya mbindo, botomboki mpe masumu ya bana ya Isalaele. Akosala mpe ndenge moko mpo na Ndako ya kapo ya Bokutani oyo ezali elongo na bango kati na mbindo na bango.


Akosukola nzoto na ye na mayi na esika moko ya bule ; mpe akolata bilamba na ye. Sima, akobima libanda mpe akobonza mbeka ya kotumba mpo na ye moko mpe mpo na bato. Na nzela wana nde akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na ye moko mpe mpo na bato.


Aron akobonza mpo na ye moko, ngombe ya mobali lokola mbeka ya masumu mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na ye moko mpe mpo na ndako na ye.


Bokosala mosala moko te na mokolo wana, pamba te ezali mokolo ya kosala mosala ya bolimbisi masumu liboso na Ngai Yawe, Nzambe na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ