Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 16:28 - Mokanda na Bomoi

28 Moto oyo akotumba yango asengeli kosukola na mayi bilamba na ye mpe nzoto na ye, sima na yango nde akoki kozonga na molako.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 16:28
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki te, ekokomisa bino mbindo ; mpe moto nyonso oyo akosimba bibembe na yango akozala mbindo kino na pokwa.


Moto nyonso oyo akosimba bibembe na yango akosukola bilamba na ye mpe akozala mbindo kino na pokwa.


mpe moto oyo akolia mosuni ya nyama oyo esili kokufa asengeli kosukola bilamba na ye, mpe akozala mbindo kino na pokwa. Moto oyo mpe akomema ebembe na yango akosukola bilamba na ye mpe akozala mbindo kino na pokwa.


Moto nyonso oyo akosimba mbeto na ye asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa.


Moto oyo akobengana ntaba ya mobali mpo na Azazeli, asengeli kosukola nzoto na ye na mayi ; mpe sima na yango, akozonga na molako.


Moto oyo akozwa putulu ya ngombe akosukola mpe bilamba na ye mpe akozala mbindo kino na pokwa. Ekozala mobeko ya libela na libela mpo na bana ya Isalaele mpe mpo na mopaya oyo avandi kati na bango.


Sima na yango, Nganga-Nzambe akosukola na mayi bilamba mpe nzoto na ye liboso ete azonga na molako. Atako bongo, Nganga-Nzambe akozala mbindo kino na pokwa.


Moto oyo akotumba ngombe akosukola mpe bilamba mpe nzoto na ye ; mpe akozala mbindo kino na pokwa.


Tala ndenge okosala mpo na kopetola bango : okobwakela bango mayi ya bopetoli ; bongo bakolekisa jileti na nzoto na bango mobimba mpo na komikokola suki ya nzoto mobimba mpe bakosukola bilamba na bango. Ezali na nzela wana nde bakokoma peto.


Yesu alobaki na ye : — Moto oyo awuti komisukola nzoto azali penza peto ; azali kaka na posa ya kosukola makolo na ye. Nzokande bino, bozali peto ; kasi bino nyonso te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ