Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 16:26 - Mokanda na Bomoi

26 Moto oyo akobengana ntaba ya mobali mpo na Azazeli, asengeli kosukola nzoto na ye na mayi ; mpe sima na yango, akozonga na molako.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 16:26
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki te, ekokomisa bino mbindo ; mpe moto nyonso oyo akosimba bibembe na yango akozala mbindo kino na pokwa.


Moto nyonso oyo akosimba bibembe na yango akosukola bilamba na ye mpe akozala mbindo kino na pokwa.


Nyama nyonso oyo ezali na makolo minei mpe etambolaka na matambe na yango ezali mbindo. Moto nyonso oyo akosimba bibembe na yango akozala mbindo kino na pokwa.


Mpe moto nyonso oyo akolokota bibembe na yango akosukola bilamba na ye mpe akozala mbindo kino na pokwa. Bokomona yango mbindo.


Kati na bibwele nyonso oyo etambolaka na libumu, bokomona oyo wana lokola mbindo. Moto nyonso oyo akosimba yango wana esili kokufa akozala mbindo kino na pokwa.


Eloko nyonso oyo nyama yango ekokweyela, wana esili kokufa, ekozala mbindo, ezala esalelo ya libaya, elamba, poso to sakosi ; botia yango na mayi mpe ekozala mbindo kino na pokwa ; sima na yango nde ekozonga lisusu peto.


Soki nyama oyo bozali na ndingisa ya kolia ekufi, moto nyonso oyo akosimba ebembe na yango akozala mbindo kino na pokwa ;


mpe moto oyo akolia mosuni ya nyama oyo esili kokufa asengeli kosukola bilamba na ye, mpe akozala mbindo kino na pokwa. Moto oyo mpe akomema ebembe na yango akosukola bilamba na ye mpe akozala mbindo kino na pokwa.


Moto oyo asengeli na kopetolama akosukola bilamba na ye, akokata bapwale na ye nyonso mpe akomisukola nzoto na mayi ; sima na yango, akokoma peto. Bongo, akoki kozonga kati na molako, kasi akovanda mikolo sambo libanda ya ndako na ye ya kapo.


Moto nyonso oyo akosimba biloko wana akokoma mbindo. Asengeli kosukola bilamba mpe nzoto na ye na mayi ; akozala mbindo kino na pokwa.


Kasi ntaba ya mobali oyo zeke ekolakisa ete ezali mpo na Azazeli, akomema yango ya bomoi liboso ya Yawe mpo ete basala na yango mosala ya bolimbisi masumu, bongo bakotinda yango na esobe mpo na Azazeli.


Akotumba mafuta ya mbeka ya masumu na likolo ya etumbelo.


Moto oyo akotumba yango asengeli kosukola na mayi bilamba na ye mpe nzoto na ye, sima na yango nde akoki kozonga na molako.


Aron akobeta zeke mpo na bantaba ya mibali nyonso mibale : moko mpo na Yawe, mpe mosusu, mpo na Azazeli.


Ekozala mpo na bango mobeko ya libela na libela. Moto oyo akobwaka mayi ya bopetoli akosukola bilamba na ye, mpe moto oyo akosimba mayi yango akozala mbindo kino na pokwa.


Solo, Mibeko ya Moyize ebongisaki eloko moko te. Kasi elikya ya malamu koleka epesameli biso, elikya oyo, na nzela na yango, topusanaka pene ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ