Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 16:24 - Mokanda na Bomoi

24 Akosukola nzoto na ye na mayi na esika moko ya bule ; mpe akolata bilamba na ye. Sima, akobima libanda mpe akobonza mbeka ya kotumba mpo na ye moko mpe mpo na bato. Na nzela wana nde akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na ye moko mpe mpo na bato.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 16:24
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okosala lisusu mpo na bana ya Aron banzambala, mikaba mpe bikoti, lokola elembo ya lokumu mpe ya nkembo.


Sima na kolatisa Aron, ndeko na yo ya mobali, elongo na bana na ye ya mibali, okopakola bango mafuta mpe okobulisa bango. Okokomisa bango Banganga-Nzambe mpo ete basalela Ngai.


Soki bakoti kuna, Banganga-Nzambe bakoki kobima te na biteni ya bule ya Tempelo mpo na kokende na lopango ya libanda, kasi basengeli kotika bilamba oyo bazalaki kosalela mosala ya bonganga-Nzambe kuna, pamba te bilamba yango ezali bule ; bakolata bilamba mosusu liboso ya kopusana na bisika oyo ebongisami mpo na bato. »


Na mokolo ya sambo, akokata lisusu bapwale na ye, suki na ye ya moto mpe ya miso, mandefu na ye mpe bapwale nyonso mosusu ; akosukola bilamba na ye mpe akomisukola nzoto na mayi. Na bongo, akozala peto.


Akotumba mafuta ya mbeka ya masumu na likolo ya etumbelo.


Moto oyo akosimba eloko ya ndenge wana akozala mbindo kino na pokwa. Akoki kolia likabo ya bule te kino tango akosukola na mayi.


Moyize alobaki na Aron : « Pusana pene ya etumbelo mpe bonza mbeka na yo ya masumu mpe mbeka na yo ya kotumba ; mpe sala mosala ya bolimbisi masumu mpo na yo moko mpe mpo na bato. Bonza likabo ya bato mpe sala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bango, kolanda ndenge Yawe apesaki mitindo. »


Ezali na yango kaka malako na tina na bilei, masanga mpe ndenge ebele ya komipetola : mibeko ya bomoto, oyo bazalaki kosalela kino na tango oyo Nzambe abongolaki makambo nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ