Bongo yo, lala na ngambo ya loboko na yo ya mwasi, tia na ngambo wana masumu ya libota ya Isalaele. Okomema masumu na bango mikolo nyonso oyo okolala na ngambo wana.
Aron akotia maboko na ye mibale na moto ya ntaba yango, akotubela mabe, botomboki mpe masumu nyonso ya bana ya Isalaele na moto ya ntaba yango. Na nzela wana akotia masumu nyonso na moto ya ntaba yango ; sima akopona moto moko mpo na kobengana ntaba yango na esobe.
Klisto akangolaki biso na bilakeli mabe ya Mobeko, pamba te akomaki elakeli mabe na esika na biso. Ekomama : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo badiembiki na nzete. »
ndenge wana mpe Klisto, oyo amikabaki lokola mbeka mbala moko mpo na kolongola masumu ya bato ebele, akoya na mbala ya mibale, mpo na kolongola masumu ya bato te, kasi mpo na kobikisa bato oyo bazali kozela Ye na posa makasi.
Kati na nzoto na Ye, amemaki masumu na biso kuna na ekulusu mpo ete tokoka kokufa na oyo etali masumu mpe tokoka kozala na bomoi mpo na bosembo. Ezali na nzela ya bapota na Ye nde bobikisamaki na bokono.