Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 16:21 - Mokanda na Bomoi

21 Aron akotia maboko na ye mibale na moto ya ntaba yango, akotubela mabe, botomboki mpe masumu nyonso ya bana ya Isalaele na moto ya ntaba yango. Na nzela wana akotia masumu nyonso na moto ya ntaba yango ; sima akopona moto moko mpo na kobengana ntaba yango na esobe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 16:21
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana Esidrasi azalaki kobondela mpe kotubela masumu, azalaki ya kofukama mpe azalaki kolela liboso ya Ndako ya Nzambe. Ebele ya bana ya Isalaele : mibali, basi mpe bana, basanganaki pene na ye mpe, bango nyonso, bazalaki kolela makasi.


Tango nandimaki masumu na ngai mpe nabombaki mabe na ngai te, nalobaki : « Nakotubela masumu na ngai liboso ya Yawe. » Bongo Yo olimbisaki mabe mpe masumu na ngai.


Oh Nzambe, yokela ngai mawa kolanda bolingo monene na Yo ; longola masumu na ngai kolanda mawa monene na Yo !


Okomema ngombe ya mobali liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani ; Aron mpe bana na ye ya mibali bakotia maboko na bango na moto na yango.


Moto oyo abombaka masumu na ye abongaka te, kasi ye oyo atubelaka mpe atikaka yango azwaka ngolu.


Biso nyonso, tozalaki koyengayenga lokola bana meme, moko na moko azalaki kolanda nzela na ye ; bongo Yawe akweyisaki masumu na biso nyonso na nzoto na ye.


Moto oyo akobonza yango akotia loboko na ye na moto ya mbeka. Mbeka yango ekondimama lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu ya moto oyo abonzi yango.


Tango Aron akosilisa kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na Esika ya bule, mpo na Ndako ya kapo ya Bokutani mpe mpo na etumbelo, akomema ntaba ya mobali ya bomoi.


Boye ntaba ekomema masumu na bango nyonso na esika oyo ezanga bato, mpe moto yango akotika ntaba kokende na esobe.


Nzokande, soki bakotubela masumu na bango mpe masumu ya batata na bango, misala na bango ya mabe mpe botomboki na bango liboso na Ngai,


Boye, soki amemi ngambo na moko kati na makambo oyo, asengeli kotubela masumu oyo asali


pamba te kondima oyo ekomisaka sembo ewutaka na motema, mpe litatoli oyo ememaka na lobiko ebimaka nde na monoko.


Ye oyo atikalaki kozala na lisumu te, Nzambe akomisaki Ye lisumu mpo na biso, mpo ete tokoma bosembo ya Nzambe kati na Ye. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ