20 Tango Aron akosilisa kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na Esika ya bule, mpo na Ndako ya kapo ya Bokutani mpe mpo na etumbelo, akomema ntaba ya mobali ya bomoi.
Okosala ndenge moko na mokolo ya sambo ya sanza, mpo na moto nyonso oyo akosala masumu na nko te to na kozanga boyebi ; bongo nde okosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na Tempelo.
Na nzela wana, akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na Esika ya bule likolo ya mbindo, botomboki mpe masumu ya bana ya Isalaele. Akosala mpe ndenge moko mpo na Ndako ya kapo ya Bokutani oyo ezali elongo na bango kati na mbindo na bango.
Mpe na nzela ya mosapi na ye, akobwaka makila mbala sambo na etumbelo. Ezali na nzela wana nde akopetola mpe akobulisa yango na mbindo ya bana ya Isalaele.
Aron akotia maboko na ye mibale na moto ya ntaba yango, akotubela mabe, botomboki mpe masumu nyonso ya bana ya Isalaele na moto ya ntaba yango. Na nzela wana akotia masumu nyonso na moto ya ntaba yango ; sima akopona moto moko mpo na kobengana ntaba yango na esobe.
Moyize akataki yango kingo mpe asalelaki mosapi na ye mpo na kotia makila ya ngombe yango na maseke ya etumbelo. Boye, apetolaki etumbelo ; bongo asopaki makila oyo etikalaki, na makolo ya etumbelo oyo abulisaki mpo na mosala ya bolimbisi masumu.
Nani akokatela bango etumbu ? Moko te ! Yesu-Klisto akufaki ; kutu, asekwaki, azali na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe, mpe azali kobondela mpo na biso.
Pamba te, kati na Klisto, Nzambe azalaki kozongisa boyokani kati na bato mpe Ye moko, na kotala masumu na bango te. Mpe atiaki kati na biso liloba ya boyokanisi.
mpe kozongisa, na nzela ya Klisto, boyokani kati na Ye moko Nzambe mpe bikelamu nyonso, ezala oyo ezali na mabele to mpe oyo ezali kati na Likolo, na kotia kimia na nzela ya makila oyo Mwana na Ye asopaki na ekulusu.
Yango wana azali na makoki ya kobikisa libela, bato oyo bapusanaka pene ya Nzambe na nzela na Ye, mpo ete azali tango nyonso na bomoi mpo na kobondelaka Nzambe na tina na bango.