Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 16:19 - Mokanda na Bomoi

19 Mpe na nzela ya mosapi na ye, akobwaka makila mbala sambo na etumbelo. Ezali na nzela wana nde akopetola mpe akobulisa yango na mbindo ya bana ya Isalaele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 16:19
5 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Aron mpe bana na ye ya mibali bapesamelaki mokumba ya kotumba mbeka na likolo ya etumbelo ya nyama mpe etumbelo ya malasi. Bazalaki kosala misala nyonso oyo etali Esika-Oyo-Eleki-Bule mpe mosala ya bolimbisi masumu ya Isalaele kolanda mitindo nyonso oyo Moyize, mosali na Nzambe, apesaki.


Akozwa makila ya ngombe ya mobali mpe, na nzela ya mosapi na ye, akobwaka yango liboso ya esika ya bolimbisi masumu, na ngambo ya este. Boye, na nzela ya mosapi na ye, akobwaka makila mbala sambo liboso ya esika ya bolimbisi masumu.


Tango Aron akosilisa kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na Esika ya bule, mpo na Ndako ya kapo ya Bokutani mpe mpo na etumbelo, akomema ntaba ya mobali ya bomoi.


Na mokolo wana, etima moko ekobimisa mayi mpo na kopetola masumu mpe mbindo ya libota ya Davidi mpe ya bavandi ya Yelusalemi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ