Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 16:16 - Mokanda na Bomoi

16 Na nzela wana, akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na Esika ya bule likolo ya mbindo, botomboki mpe masumu ya bana ya Isalaele. Akosala mpe ndenge moko mpo na Ndako ya kapo ya Bokutani oyo ezali elongo na bango kati na mbindo na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 16:16
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mbala moko na mobu, Aron asengeli kosala mosala ya bolimbisi masumu, na maseke ya etumbelo ; akosala yango na makila ya mbeka ya masumu mpo na milongo oyo ekoya. Etumbelo ekozala bule koleka mpo na Yawe.


Moto moko te akozala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani tango Aron akokota kuna mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu kati na Esika ya bule kino tango akobima na libanda. Mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na ye moko, mpo na ndako na ye mpe mpo na lisanga mobimba ya Isalaele.


Sima na yango, akobima mpo na kokende na etumbelo oyo ezali liboso ya Yawe mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na etumbelo yango. Akozwa makila ya ngombe ya mobali mpe ya ntaba ya mobali mpe akotia yango na maseke ya etumbelo.


« Mokolo ya zomi ya sanza ya sambo ezali mokolo ya bolimbisi masumu. Bokozala na mayangani ya bule mpo na lokumu na Ngai ; bokomikitisa mpe bokobonzela Yawe makabo bazikisa na moto.


Moyize akataki yango kingo mpe asalelaki mosapi na ye mpo na kotia makila ya ngombe yango na maseke ya etumbelo. Boye, apetolaki etumbelo ; bongo asopaki makila oyo etikalaki, na makolo ya etumbelo oyo abulisaki mpo na mosala ya bolimbisi masumu.


Moyize alobaki na Aron : « Kamata mbabola na yo mpe tia malasi ya ansa kati na yango elongo na moto ya etumbelo. Bongo, kima mbangu kati na lisanga mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bango, pamba te kanda makasi ebimi liboso ya Yawe, etumbu ezali koya. »


Kobakisa na mbeka ya kotumba ya libela elongo na mbeka na yango ya masanga, bokobonza lisusu epai na Yawe ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu.


Mpe, sima na Ngai kobongisa yango, nakozonga mpe nakozwa bino mpo ete bozala elongo na Ngai ; mpe mpo ete bino mpe bozala na esika oyo Ngai nazali.


Yango wana asengelaki kozala ndenge moko na bandeko na Ye na makambo nyonso mpo ete akoma Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo atonda na boboto, mpe oyo bakoki kotiela motema na makambo oyo etali boyokani ya moto elongo na Nzambe, mpe mpo ete akoka kosala mosala ya bolimbisi masumu ya bato.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ