7 Moto oyo akosimba mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali, asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino pokwa.
Moto oyo akovanda likolo ya eloko oyo mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali avandelaki, asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa.
Soki mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali abwakeli moto oyo azali peto soyi, moto yango asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa.