4 mbeto nyonso oyo mobali oyo azali kobimisa tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali akolala to eloko nyonso oyo akovandela ekokoma mbindo.
Ata soki tofina to mayi ekobi kobima na nzoto na ye to ekangami, azali kaka mbindo. Tala ndenge kobima ya tofina to ya mayi yango ekomisaka moto mbindo :
Moto nyonso oyo akosimba mbeto na ye asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa.
Bomikosa te : « Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu ! »
Bosanganaka te na misala ya molili, oyo ebotaka mbuma te, kasi bobimisaka yango na pwasa.
Mpo na bato oyo bazali peto, nyonso ezalaka peto ; kasi mpo na bato oyo bazali mbindo mpe bazangi kondima, eloko moko te ezalaka peto, pamba te mayele mpe mitema na bango ezali mbindo.