Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 15:31 - Mokanda na Bomoi

31 Bosengeli kosala ete bana ya Isalaele bazala mosika ya makambo oyo ekokomisa bango mbindo ; boye bakokufa te na mbindo na bango, na kokomisa mbindo Mongombo na Ngai, oyo ezali kati na bango. ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 15:31
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki nazalaki na masumu kati na motema na ngai, Nkolo alingaki koyoka ngai te.


Basalaki yango mpe lisusu epai na Ngai : kaka na tango yango, bakomisaki Esika na Ngai ya bule mbindo mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba.


« Mwana na moto, tango bana ya Isalaele bazalaki kovanda na mokili na bango, bazalaki kokomisa yango mbindo na ezaleli mpe na misala na bango ; ezaleli na bango ezalaki mbindo na miso na Ngai lokola makila ya mwasi oyo azali komona sanza na ye.


Bakoteya bato ete bayeba kosala bokeseni kati na biloko ya bule mpe oyo ya bule te, kati na biloko ya mbindo mpe oyo ya peto.


Mpe lisusu, na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe : ‹ Lokola bokomisi Ndako na Ngai ya bule mbindo na nzela ya banzambe na bino ya bikeko mpe makambo na bino ya nkele, nakolongola Ngai moko ngolu na Ngai na likolo na bino : liso na Ngai ekotala bino lisusu na mawa te mpe nakobikisa bino lisusu te. ›


Na poso moko, akosala boyokani moko elenda elongo na bato ebele ; kasi na kati-kati ya poso yango, akosukisa bambeka mpe makabo. Likolo ya kobomba makambo ya nkele, mobebisi moko akobima kino tango libebi oyo ekatama mpo na mobebisi ekokokisama. »


Bosengeli kosala bokeseni kati na oyo ezali mbindo mpe oyo ezali peto, kati na bikelamu ya bomoi oyo bakoki kolia mpe oyo bakoki kolia te. › »


Wana nde mitindo oyo etali litono ya bokono ya maba na likolo ya elamba basala na bapwale ya meme to elamba ya lino, na likolo ya eloko nyonso basala na poso ya nyama, mpo na koyeba soki elamba ezali peto to mbindo.


Oyo nde mibeko mpo na mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali to mpo na mobali oyo abimi mayi ya mibali oyo ekomisi ye mbindo ;


Bokobatelaka mikolo na Ngai ya Saba mpe bokotosaka Esika na Ngai ya bule. Nazali Yawe.


Ngai nakotombokela moto yango mpe nakolongola ye kati na bato na ye, pamba te abonzaki mwana na ye lokola mbeka epai ya nzambe Moloki mpo na kokomisa mbindo Esika na Ngai ya bule mpe mpo na kobebisa bosantu ya Kombo na Ngai.


Kasi mpo na mbeba ya nzoto na ye, akoki te kopusana pembeni ya rido ya Esika ya bule to ya etumbelo, mpo ete abebisa te bosantu ya Esika na Ngai ya bule, pamba te Ngai nazali Yawe, mpe ezali Ngai nde nabulisaki Banganga-Nzambe mpo na mosala na Ngai. › »


Soki amipetoli te sima na ye kosimba ebembe ya moto, abebisi bosantu ya Mongombo ya Yawe. Basengeli kolongola ye na Isalaele, pamba te basopeli ye te mayi ya bopetoli ; boye akozala kaka mbindo, mbindo na ye ekokangama ye na nzoto.


Kasi soki moto oyo amikomisaki mbindo amipetoli, bakolongola ye kati na lisanga ; pamba te akomisi mbindo Esika ya bule ya Yawe. Mpe lokola basopeli ye te mayi ya bopetoli na nzoto, akozala mbindo.


Azala mobali to mwasi, bobengana ye, bobimisa ye libanda ya molako mpo ete bakomisa molako na bango mbindo te, pamba te Ngai nazali kowumela elongo na bango. »


Soki moto abebisi Tempelo ya Nzambe, Nzambe mpe akoboma ye ; pamba te Tempelo ya Nzambe ezali bule, bongo bino bozali nde Tempelo yango.


Mpo na makambo oyo etali bokono ya maba, bosala keba ete bosalela malamu malako nyonso oyo Banganga-Nzambe, ba-oyo bazali Balevi, bapesaki bino. Bosengeli kotosa malamu makambo oyo natindaki bango.


ekozala boni mpo na moto oyo atioli Mwana na Nzambe, amoni pamba makila ya boyokani, oyo epetolaki ye, mpe afingi Molimo ya ngolu ?


Pamba te ezali na bato mosusu oyo basili kokota kati na bino na mayele mabe, ba-oyo etumbu na bango ekomama wuta kala : batosaka makambo ya Nzambe te, bakomisaka ngolu ya Nzambe na biso lokola nzela ya kosala makambo na bango ya soni, mpe bawanganaka Yesu-Klisto, Mokonzi kaka moko mpe Nkolo na biso.


Yango wana, nalapi ndayi mpo na ndako ya Eli ete mbeba ya libota na ye ekotikala kolimbisama te, ezala na nzela ya bambeka to ya makabo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ