Balingami na ngai, lokola tozali na bilaka ya lolenge oyo, tomipetolaka na nyonso oyo ekomisaka nzoto mpe molimo mbindo, mpo na kotambola na bomoi ya bosantu, kati na kotosa Nzambe.
Soki ezalaki bongo, mbele Klisto anyokwamaki mbala ebele wuta na ebandeli ya mokili. Nzokande sik’oyo, na mikolo oyo ya suka, amonani mbala kaka moko mpo na kolongola masumu na nzela ya mbeka na Ye.
Nazongiselaki ye : — Nkolo na ngai, yo nde oyebi. Bongo alobaki na ngai : — Ezali ba-oyo bawuti na minyoko makasi. Basukolaki banzambala na bango mpe bakomisaki yango pembe kati na makila ya Mpate.