Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 15:2 - Mokanda na Bomoi

2 « Boloba na bana ya Isalaele mpe boyebisa bango : ‹ Soki nzoto ya mibali ya mobali moko ezali kobimisa tofina to mayi, kobima yango ekomisi mobali yango mbindo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 15:2
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete makila na ye etangama na moto ya Joabi mpe ya libota na ye mobimba ! Tika ete ndako ya Joabi ezangaka te bato oyo bakobela bokono ya sopisi to bokono ya maba to bato oyo bakotambola na banzete to bato oyo bakokufa na mopanga to bato oyo bakozanga bilei.


Apesaki malako mpo na bolamu ya Jakobi, atiaki mibeko kati na Isalaele, apesaki mitindo epai ya batata na biso ete bateya yango epai ya bana mibali na bango,


Ata soki tofina to mayi ekobi kobima na nzoto na ye to ekangami, azali kaka mbindo. Tala ndenge kobima ya tofina to ya mayi yango ekomisaka moto mbindo :


Soki moko ya bakitani ya Aron azali na bokono na poso ya nzoto lokola maba, bokono ya kobima tofina to makila na nzoto ya mibali, akoki te kolia likabo ya bule kino tango akokoma peto. Ndenge moko mpe, akozala mbindo soki asimbi eloko oyo ekomi mbindo mpo ete etuti ebembe to mobali oyo abimisi mayi ya mibali ;


Soki moto asimbi na kozanga koyeba moto ya mbindo, mbindo oyo ezwamaka na kotutana, akokoma mbindo mpe akomema ngambo na yango tango kaka akososola yango.


« Pesa mitindo epai na bana ya Isalaele ete babimisa libanda ya molako moto nyonso oyo azali na bokono ya poso ya nzoto, moto nyonso oyo atangaka makila, mpe moto nyonso oyo akomi mbindo mpo ete asimbi ebembe.


Na tango yango kaka, ezalaki na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale. Mwasi yango ayaki na sima ya Yesu mpe asimbaki singa ya songe ya elamba na Ye,


Ezalaki mpe na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale.


Nzokande, ezalaki wana na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale ; mpe asilisaki bozwi na ye nyonso epai ya minganga, kasi moko te alongaki kobikisa ye na bokono yango.


Solo, ezali penza na litomba monene kati na makambo nyonso. Pamba te Maloba ya Nzambe epesamaki liboso epai na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ