Moto nyonso oyo mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali akosimba na kozanga komisukola maboko na mayi, asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa.
Bongo soki basaleli nzungu ya mabele mpo na kokalinga mosuni ya mbeka mpo na masumu, bakopanza nzungu yango. Soki bakalingi yango na nzungu ya bronze, bakopalola nzungu yango mpe bakosukola yango na mayi ebele.
Toyebi malamu ete, soki ndako na biso, ndako oyo ya kapo epai wapi tovandaka awa na mokili ebebisami, tozali na ndako oyo Nzambe abongisela biso, ndako ya seko kati na Lola, ndako monene oyo etongama na maboko ya bato te.
Ye nde akobongola nzoto na biso ya putulu mpo na kokomisa yango nzoto ya nkembo, na nzela ya nguya na Ye ya kotia biloko nyonso na se ya bokonzi na Ye.