Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 14:8 - Mokanda na Bomoi

8 Moto oyo asengeli na kopetolama akosukola bilamba na ye, akokata bapwale na ye nyonso mpe akomisukola nzoto na mayi ; sima na yango, akokoma peto. Bongo, akoki kozonga kati na molako, kasi akovanda mikolo sambo libanda ya ndako na ye ya kapo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 14:8
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi Oziasi abelaki bokono ya maba kino na mokolo na ye ya kufa. Lokola azalaki kobela bokono ya maba, akomaki kovanda na ndako moko batonga mosika, pamba te babenganaki ye mosika ya Tempelo ya Yawe. Yotami, mwana na ye ya mobali, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi, ayangelaki bato ya mokili.


Yawe alobaki na Moyize : — Kende epai ya bato, bulisa bango lelo mpe lobi, bongo yebisa bango ete basukola bilamba na bango ;


Moyize alongwaki na ngomba, akendeki epai ya bana ya Isalaele, abulisaki bango, mpe basukolaki bilamba na bango.


Moto nyonso oyo akosimba bibembe na yango akosukola bilamba na ye mpe akozala mbindo kino na pokwa.


Nganga-Nzambe akotia mbeka yango na likolo ya etumbelo elongo na makabo ya farine. Boye, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto yango, mpe akozala peto.


Na mokolo ya sambo, akokata lisusu bapwale na ye, suki na ye ya moto mpe ya miso, mandefu na ye mpe bapwale nyonso mosusu ; akosukola bilamba na ye mpe akomisukola nzoto na mayi. Na bongo, akozala peto.


Soki tofina to mayi etiki kobima na nzoto ya mibali ya mobali yango, akotanga mikolo sambo mpo na kopetolama na ye ; sima akosukola bilamba na ye, akosukola nzoto na ye na mayi ya etima mpe akokoma peto.


Moyize amemaki Aron elongo na bana na ye ya mibali liboso mpe asukolaki bango na mayi.


Soki moto akufi na mbalakata pene na ye, moto na ye oyo epesama mpo na libulisi ekokoma mbindo. Bongo asengeli kokatisa suki na ye ya moto mpe mandefu na ye na mokolo ya sambo, mokolo na ye ya kopetolama.


Tala ndenge okosala mpo na kopetola bango : okobwakela bango mayi ya bopetoli ; bongo bakolekisa jileti na nzoto na bango mobimba mpo na komikokola suki ya nzoto mobimba mpe bakosukola bilamba na bango. Ezali na nzela wana nde bakokoma peto.


Boye mobali oyo asepeli kobala mwasi yango akokotisa ye kati na ndako na ye, mpe mwasi yango akomikokola suki ya moto na ye, akomikata manzaka na ye ;


Mayi yango ezali elilingi ya libatisi oyo ebikisi bino sik’oyo. Libatisi yango elongolaka mbindo ya nzoto te, kasi ezali mokano ya kotambola na motema peto liboso ya Nzambe ; mpe ezali kobikisa bino na nzela ya lisekwa ya Yesu-Klisto


Nazongiselaki ye : — Nkolo na ngai, yo nde oyebi. Bongo alobaki na ngai : — Ezali ba-oyo bawuti na minyoko makasi. Basukolaki banzambala na bango mpe bakomisaki yango pembe kati na makila ya Mpate.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ