Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 14:7 - Mokanda na Bomoi

7 akosopa makila yango mbala sambo na nzoto ya moto oyo asengeli kopetolama na maba. Sima na yango, Nganga-Nzambe akotatola ete moto yango akomi peto ; mpe akotika ndeke oyo ya bomoi kopumbwa mpe kokende na zamba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 14:7
29 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Elize atindaki moto moko mpo na koyebisa Namani : — Kende kosukola mbala sambo na ebale Yordani ; bongo nzoto na yo ekobongwana, mpe okokoma peto.


Boye Namani akitaki mpe amizindisaki mbala sambo na ebale Yordani, ndenge moto na Nzambe ayebisaki ye ; mpe nzoto na ye ebongwanaki mpe ekomaki peto lokola nzoto ya elenge mobali.


Eyembamaki tango mosakoli Natan akomaki epai ya Davidi sima na ye kosala ekobo elongo na Batisheba.


Solo, nabotamaki kati na lisumu ; wuta na libumu ya mama na ngai, nazali mosumuki.


ndenge wana mpe bato ya bikolo bakokamwa, mpe bakonzi bakokanga minoko na bango na tina na ye, pamba te bakomona oyo nanu babetela bango lisolo te mpe bakososola oyo nanu bayoka te.


Nakobwakela bino mayi ya peto, mpe bokokoma peto ; nakopetola bino na mbindo na bino nyonso mpe na mbindo ya banzambe na bino nyonso ya bikeko.


Eleko moko ya baposo tuku sambo ekatamaki mpo na bato na yo mpe mpo na engumba na yo ya bule, mpo na kosilisa botomboki liboso ya Nzambe mpe kosukisa masumu, mpo na kolimbisa masumu mpe kokokisa bosembo ya libela, mpo na kokangisa emoniseli mpe mosakoli, mpe mpo na kobulisa Mosantu ya basantu.


Nganga-Nzambe akotala ye lisusu malamu : soki amoni ete bambuma ya mike-mike etondi ye penza na nzoto mobimba, akoloba ete moto yango azali mbindo te mpo ete akomi pembe nzoto mobimba.


mpo ete atala ye malamu. Soki Nganga-Nzambe amoni ete bapota yango ekomi penza pembe, akoloba ete nzoto ezali mbindo te mpe ye moko moto yango azali mbindo te.


Akokamata mabaya ya sedele, eteni ya nzete ya izope, eteni ya elamba ya motane makasi mpe ndeke mosusu, akozindisa yango kati na makila ya ndeke oyo asilaki kokata kingo mpe kati na mayi ya peto oyo akobwaka na likolo ya ndako mbala sambo.


Akozwa makila ya ngombe ya mobali mpe, na nzela ya mosapi na ye, akobwaka yango liboso ya esika ya bolimbisi masumu, na ngambo ya este. Boye, na nzela ya mosapi na ye, akobwaka makila mbala sambo liboso ya esika ya bolimbisi masumu.


Mpe na nzela ya mosapi na ye, akobwaka makila mbala sambo na etumbelo. Ezali na nzela wana nde akopetola mpe akobulisa yango na mbindo ya bana ya Isalaele.


Boye ntaba ekomema masumu na bango nyonso na esika oyo ezanga bato, mpe moto yango akotika ntaba kokende na esobe.


Nganga-Nzambe akozindisa mosapi na ye kati na makila mpe akosopa ndambo ya makila mbala sambo liboso ya Yawe mpe ya rido.


Nganga-Nzambe akozindisa mosapi na ye na makila mpe akosopa ndambo ya makila mbala sambo liboso ya Yawe, liboso ya rido ya Esika ya bule.


Asopaki na etumbelo ndambo ya mafuta mbala sambo mpe apakolaki mafuta mpo na kobulisa etumbelo, bisalelo na yango nyonso, sani monene mpe se na yango.


Solo, okoyokela biso lisusu mawa, matambe na Yo ekonyata masumu na biso, mpe okobwaka mabunga na biso nyonso kati na bozindo ya ebale monene.


Soki amipetoli na mayi na mokolo ya misato mpe ya minei, akokoma peto ; soki te, akozala kaka mbindo.


Moko kati na basoda atobolaki mopanzi ya Yesu na nzela ya likonga ; mpe mbala moko, makila mpe mayi ebimaki na mopanzi yango.


Na bongo, topusana pene ya Nzambe na motema mobimba, na kondima nyonso, na motema oyo epetolami na makanisi nyonso ya mabe, mpe na nzoto oyo esukolami na mayi ya peto.


pene ya Yesu, Moyokanisi ya Boyokani ya sika ; mpe pene ya makila na Ye, oyo esopanaki mpe egangaka koleka makila ya Abele.


Pamba te makila ya bantaba, makila ya bangombe ya mibali mpe putulu ya bangombe ya basi, oyo basopelaka bato ya mbindo, epetolaka kaka libanda ya nzoto ;


Pamba te, tango Moyize asilisaki kotangela bato mitindo nyonso ndenge ekomami kati na Mibeko, akamataki makila ya bana ngombe, ya bantaba elongo na mayi, asopelaki buku mpe bato nyonso na nzela ya etape ya nzete ya izope, oyo balinga elamba ya lino ya motane.


Bongo, na makila yango, asopelaki lisusu Mongombo mpe bisalelo nyonso ya losambo.


Soki ezalaki bongo, mbele Klisto anyokwamaki mbala ebele wuta na ebandeli ya mokili. Nzokande sik’oyo, na mikolo oyo ya suka, amonani mbala kaka moko mpo na kolongola masumu na nzela ya mbeka na Ye.


Kolanda mabongisi na Ye, Nzambe Tata apona bino wuta kala, abulisa bino na nzela ya Molimo na Ye mpo ete botosa Yesu-Klisto mpe bokoma peto na nzela ya makila na Ye, oyo asopaki. Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino na bofuluki !


Yesu-Klisto azali Ye oyo ayaki na nzela ya mayi mpe makila ; ayaki na nzela ya mayi kaka te, kasi na nzela ya mayi mpe makila. Mpe ezali Molimo nde atatoli bongo, pamba te Molimo azali solo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ