Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 14:6 - Mokanda na Bomoi

6 Bongo akokamata ndeke ya mibale, ya bomoi, elongo na eteni ya nzete ya sedele, eteni ya elamba ya motane makasi mpe eteni ya nzete ya izope ; akozindisa yango kati na makila ya ndeke oyo bawuti kokata kingo na likolo ya mayi ya peto ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 14:6
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Solo, nabotamaki kati na lisumu ; wuta na libumu ya mama na ngai, nazali mosumuki.


Nganga-Nzambe akopesa mitindo ete bamema biloko oyo, mpo na kopetolama ya moto oyo abiki na bokono ya maba : bandeke mibale ya peto mpe ya bomoi, eteni ya nzete ya sedele, eteni ya elamba ya motane makasi mpe eteni ya nzete ya izope.


Nganga-Nzambe akopesa mitindo ete bakata kingo ya ndeke moko kati na bandeke wana mibale, na likolo ya sani basala na mabele mpe etondi na mayi ya peto.


akokata kingo ya ndeke ya liboso na likolo ya sani oyo basala na mabele mpe ezali na mayi ya peto kati na yango.


Na mokolo wana, etima moko ekobimisa mayi mpo na kopetola masumu mpe mbindo ya libota ya Davidi mpe ya bavandi ya Yelusalemi.


Etikali kaka tango moke, mokili ekomona Ngai lisusu te ; kasi bino, bokomona Ngai. Mpo ete nazali na bomoi, bino mpe bokozala na bomoi.


oyo akabamaki mpo na masumu na biso mpe asekwaki mpo ete tokoma bato ya sembo.


Solo, wana tozalaki nanu banguna ya Nzambe, Ye moko Nzambe azongisaki boyokani na biso elongo na Ye na nzela ya kufa ya Mwana na Ye. Boye lokola azongisi boyokani yango, akobikisa biso mpe na nzela ya bomoi ya mwana na Ye.


Mwana yango amonisaka kongenga ya nkembo ya Nzambe, azali elilingi oyo etalisaka mobimba ya Nzambe mpe asimbi biloko nyonso na nguya ya Liloba na Ye. Sima na Ye kopetola masumu ya bato, avandi kati na Likolo, na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,


Nazali Ye oyo azali na bomoi ; nakufaki, mpe sik’oyo tala, nazali na bomoi mpo na libela na libela ! Nasimbi bafungola ya kufa mpe ya mboka ya bakufi.


mpe kowuta na Yesu-Klisto, Motatoli oyo akosaka te, Mosekwi ya liboso kati na bakufi, mpe Mokonzi ya bakonzi ya mokili ! Epai na Ye oyo alingaka biso mpe akangolaki biso na masumu na biso na nzela ya makila na Ye,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ