Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 14:54 - Mokanda na Bomoi

54 Wana nde mibeko oyo etali lolenge nyonso ya maba, litono,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 14:54
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yango wana nde ezali mobeko oyo etali banyama, bandeke, bikelamu nyonso ya bomoi oyo etambolaka kati na mayi to na libumu.


Nganga-Nzambe akotala malamu poso ya nzoto oyo esili kozwa bokono. Soki amoni ete bapwale oyo ezali na esika oyo ezwi bokono na poso ebongwani mpe ekomi pembe ; bongo bapota efungwami na poso ya nzoto, wana elakisi ete ezali bokono ya maba ; mpe Nganga-Nzambe akoki koloba mbala moko ete moto yango azali mbindo.


« Tala mobeko oyo etali moto oyo azali na bokono ya maba, na mokolo ya kopetolama na ye : ‹ Basengeli komema moto oyo azali na bokono ya maba epai ya Nganga-Nzambe.


Wana nde mibeko oyo ezali kotala moto oyo abeli bokono ya maba, oyo azali penza na makoki te mpo na kopetolama na ye. »


Bongo akotika ndeke oyo etikalaki ya bomoi kokende na zamba, na libanda ya engumba. Ezali ndenge wana nde akosala mosala ya bolimbisi masumu ya ndako ; mpe ndako yango ekokoma peto. »


Oyo nde mibeko mpo na mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali to mpo na mobali oyo abimi mayi ya mibali oyo ekomisi ye mbindo ;


Okosangisa yango liboso na mafuta, bongo okokalinga yango na kikalungu. Sima okobonza yango na biteni lokola mbeka oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.


Ndambo oyo ekotikala, Aron mpe bana na ye ya mibali bakolia yango. Kasi bakolia yango ezanga levire, na Esika ya bule, na libanda ya Ndako ya kapo ya Bokutani.


« ‹ Tala mobeko ya mbeka mpo na kozongisa boyokani ; ezali eloko ya bule penza :


Yango nde mibeko mpo na mbeka ya kotumba, likabo ya gato, mbeka mpo na masumu, mbeka mpo na kozongisa boyokani, mbeka mpo na kobulisa mpe mpo na mbeka ya boyokani


Tala mobeko oyo ebongi na kosalela soki moto akufi kati na ndako ya kapo : bato nyonso oyo bakokota na ndako ya kapo mpe ba-oyo bakomizalela na kati bakozala mbindo mikolo sambo.


Wana nde ezali mobeko na tina na zuwa ; ekokanga mwasi ya libala oyo akosi mobali na ye mpe amikomisi mbindo.


Tala mobeko mpo na moto oyo amibulisi mpo na Yawe : ‹ soki mikolo ya libulisi na ye ekoki, basengeli komema ye na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani


Mpo na makambo oyo etali bokono ya maba, bosala keba ete bosalela malamu malako nyonso oyo Banganga-Nzambe, ba-oyo bazali Balevi, bapesaki bino. Bosengeli kotosa malamu makambo oyo natindaki bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ