53 Bongo akotika ndeke oyo etikalaki ya bomoi kokende na zamba, na libanda ya engumba. Ezali ndenge wana nde akosala mosala ya bolimbisi masumu ya ndako ; mpe ndako yango ekokoma peto. »
Nganga-Nzambe akotia mbeka yango na likolo ya etumbelo elongo na makabo ya farine. Boye, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto yango, mpe akozala peto.
Akopetola ndako na nzela ya makila ya ndeke, ya mayi ya peto, ya ndeke oyo ezali na bomoi, ya mabaya ya sedele, ya eteni ya nzete ya izope mpe ya eteni ya elamba ya motane.