Nganga-Nzambe akopesa mitindo ete bamema biloko oyo, mpo na kopetolama ya moto oyo abiki na bokono ya maba : bandeke mibale ya peto mpe ya bomoi, eteni ya nzete ya sedele, eteni ya elamba ya motane makasi mpe eteni ya nzete ya izope.
Nganga-Nzambe akopesa mitindo ete bakata kingo ya ndeke moko kati na bandeke wana mibale, na likolo ya sani basala na mabele mpe etondi na mayi ya peto.
Akokamata mabaya ya sedele, eteni ya nzete ya izope, eteni ya elamba ya motane makasi mpe ndeke mosusu, akozindisa yango kati na makila ya ndeke oyo asilaki kokata kingo mpe kati na mayi ya peto oyo akobwaka na likolo ya ndako mbala sambo.
Bongo akokamata ndeke ya mibale, ya bomoi, elongo na eteni ya nzete ya sedele, eteni ya elamba ya motane makasi mpe eteni ya nzete ya izope ; akozindisa yango kati na makila ya ndeke oyo bawuti kokata kingo na likolo ya mayi ya peto ;