Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 14:45 - Mokanda na Bomoi

45 Boye bakokweyisa ndako yango : mabanga mpe mabaya na yango nyonso ekobwakama na libanda ya engumba na esika ya mbindo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 14:45
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Babukaki libanga yango ya bule, bakweyisaki ndako ya nzambe Bala mpe bakomisaki yango zongo kino na mokolo ya lelo.


Alongolaki bisambelo ya likolo ya bangomba, abukaki makonzi ya bule ya banzambe ya bikeko, mpe akataki likonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera. Abukaki-bukaki nyoka ya ebende oyo Moyize asalaki, pamba te kino na tango wana, bana ya Isalaele bazalaki kotumba ansa mpo na nyoka yango mpe kobenga yango « Nekushitani. »


Atumbaki Tempelo ya Yawe, ndako ya mokonzi mpe bandako nyonso ya Yelusalemi ; atumbaki bandako nyonso ya bato minene.


Bongo, na oyo ekotikala, bwaka ndambo na yango na moto mpo ete ezika. Boye, moto oyo ekobima kuna ekopanzana na libota mobimba ya Isalaele.


Bongo akosenga ete bakokola mir nyonso na ngambo na yango ya kati mpe babwaka libanda ya engumba na esika ya mbindo mabele nyonso oyo bakokola.


Na mikolo nyonso oyo ndako ekozala ya kokangama, moto nyonso oyo akokota akozala mbindo kino na pokwa.


Mokonzi asilikaki makasi, atindaki basoda na ye koboma babomi wana mpe kotumba engumba na bango.


Kasi Yesu alobaki na bango : — Bomoni nyonso oyo ? Nazali koloba na bino penza ya solo : nyonso ekobukama, libanga moko te ekotikala awa na likolo ya libanga mosusu.


Kasi kozwa te molayi ya lopango ya libanda ya Tempelo, pamba te esilaki kokabama na maboko ya bikolo ya bapaya. Bapagano bakonyata engumba ya bule basanza tuku minei na mibale.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ