42 Sima, bakozongisa mabanga mosusu na bisika oyo balongolaki mpe bakozwa mabele mosusu mpo na kopakola ndako.
Pamba te naponaki ye mpo ete ateya bana na ye mpe ndako na ye sima na ye ete bayeba kobatela nzela ya Yawe na kozalaka na etamboli ya malamu mpe ya sembo ; na bongo nde, Ngai Yawe, nakokokisela Abrayami elaka oyo napesaki ye. »
Nakopona nde bato ya sembo kati na mokili mpo ete bavanda pembeni na ngai ; moto na etamboli ezanga pamela nde akozala mosali na ngai.
Bongo akosenga ete bakokola mir nyonso na ngambo na yango ya kati mpe babwaka libanda ya engumba na esika ya mbindo mabele nyonso oyo bakokola.
Sima na kolongola mabanga oyo ebebaki, kokokola bamir mpe kopakola mabele mosusu, soki litono esalemi lisusu,
Makambo oyo oyokaki epai na ngai liboso ya batatoli ebele, teya yango na bato ya sembo oyo bazali na makoki ya koteya yango lisusu na bato mosusu.
Kasi soki bosepeli kosalela Yawe te, bopona lelo nani bolingi kosalela ; banzambe oyo batata na bino basalelaki tango bazalaki na ngambo mosusu ya ebale to banzambe ya bato ya Amori epai wapi bozali kovanda. Kasi ngai mpe libota na ngai, tokosalela Yawe. »