bato oyo bavandaka kati na bakunda mpe balekisaka babutu na bango kati na madusu ya mabanga ; bato oyo baliaka misuni ya ngulu mpe basani na bango etonda na bilei ya mbindo ;
Tango bakomaki na ngambo mosusu ya ebale, na etuka ya Gadara, bato mibale oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe babimaki wuta na bakunda mpe bayaki kokutana na Yesu ; bazalaki bato na kanza makasi, mpe bato bazalaki kobanga koleka na nzela wana.