Levitike 14:4 - Mokanda na Bomoi4 Nganga-Nzambe akopesa mitindo ete bamema biloko oyo, mpo na kopetolama ya moto oyo abiki na bokono ya maba : bandeke mibale ya peto mpe ya bomoi, eteni ya nzete ya sedele, eteni ya elamba ya motane makasi mpe eteni ya nzete ya izope. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Moto oyo azali mbindo te akokamata etape ya izope mpe akotia yango kati na mayi, bongo akosalela yango mpo na kobwaka mayi na ndako ya kapo epai wapi moto akufi, na bisalelo mpe na banzoto ya bato nyonso oyo bazalaki kati na ndako yango ; akosala mpe bongo mpo na moto oyo asimbaki mikuwa, ebembe ya moto oyo moninga na ye moto abomaki to akufaki na liwa nyonso kaka to mpe mpo na moto oyo asimbaki kunda.