Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 14:28 - Mokanda na Bomoi

28 Nganga-Nzambe akokamata ndambo mosusu mpe akotia yango na likolo ya litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali, ya moto oyo azali komipetola, na mosapi ya liboso ya loboko na ye ya ngambo ya mobali mpe na mosapi na ye liboso ya lokolo na ye ya ngambo ya loboko ya mobali, mpe na bisika oyo atiaki makila ya mbeka mpo na bolimbisi masumu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 14:28
5 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okokata meme yango kingo, okozwa ndambo ya makila na yango mpe okotia yango na songe ya litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali. Okotia yango lisusu na mosapi ya monene ya loboko na bango ya ngambo ya mobali mpe na mosapi ya monene ya lokolo na bango ya ngambo ya loboko ya mobali.


Mpe na nzela ya mosapi ya mibale ya loboko na ye ya ngambo ya mobali, Nganga-Nzambe akokamata mpe akosopa mafuta yango mbala sambo, liboso ya Yawe.


Bongo mpo na ndambo ya makila oyo ekotikala na loboko na ye ya mwasi, Nganga-Nzambe akosopa yango na moto ya moto oyo azali komipetola, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu na ye liboso ya Yawe.


Soki moto azangi makoki ya kozwa mwana meme, akomema epai na Yawe bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka : moko ekozala mbeka mpo na masumu, mpe mosusu, mpo na mbeka ya kotumba.


Moyize akataki yango kingo, azwaki ndambo ya makila na yango mpe atiaki yango na songe ya litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali ya Aron, na mosapi ya monene ya loboko ya mobali ya Aron mpe na mosapi ya monene ya lokolo ya ngambo ya loboko ya mobali ya Aron.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ