Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 14:22 - Mokanda na Bomoi

22 Akobonza lisusu bibenga mibale kolanda bozwi na ye : moko lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu, mosusu lokola mbeka ya kotumba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 14:22
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

bakonzi ya mampinga bakimi, bapoti mbangu, mpe mwasi oyo atikali na ndako akaboli bomengo ya bitumba.


Ebenga na ngai oyo obombami kati na madusu ya mabanga, kati na madusu ya bangomba, monisa ngai ata elongi na yo mpe sala ete nayoka ata mongongo na yo, pamba te mongongo na yo ezalaka elengi mpe elongi na yo ezalaka kitoko mingi ! »


Nazalaki koganga lokola mbilambila to ndeke ya mayi, nazalaki kolela lokola ebenga. Miso na ngai elembaki kotala likolo. Oh Yawe, natungisami, batela ngai ! »


Biso nyonso tozali konguna-nguna lokola bangombolo, mpe tozali kolelalela tango nyonso lokola ebenga  ; tozali koluka bosembo, kasi tozali komona yango te, tozali koluka lobiko, kasi ekimi mosika na biso !


Bino bavandi ya Moabi, bosundola bingumba na bino mpe bokende kovanda kati na mabanga ! Bozala lokola ebenga oyo etongaka zala na yango kati na mabanga.


Batikali bakokima na likolo ya bangomba ; mpe kuna, bakokoma kolelalela lokola bibenga, moto na moto mpo na masumu na ye.


Soki moto yango azali mobola, bongo akoki kozwa te biloko wana nyonso, akokamata kaka mwana meme moko lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, mpo na kobonza yango mpo na mosala ya bolimbisi masumu ya moto yango ; akobakisa na likolo na yango lokola makabo bakilo misato ya farine basangisa na mafuta mpe kati-kati ya litele moko ya mafuta.


Nganga-Nzambe akokamata mafuta mpe mwana meme oyo ebonzami lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu, mpe akobonza yango epai na Yawe.


Na mokolo ya mwambe, akozwa bibenga mibale ya zamba to bana bibenga mibale mpe akoya liboso ya Yawe na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Akopesa yango epai ya Nganga-Nzambe.


Soki moto azangi makoki ya kozwa mwana meme, akomema epai na Yawe bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka : moko ekozala mbeka mpo na masumu, mpe mosusu, mpo na mbeka ya kotumba.


Na mokolo ya mwambe, asengeli komema epai ya Nganga-Nzambe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani : bibenga mibale ya zamba mpe bana mibale ya ebenga ya mboka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ