Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 14:21 - Mokanda na Bomoi

21 Soki moto yango azali mobola, bongo akoki kozwa te biloko wana nyonso, akokamata kaka mwana meme moko lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, mpo na kobonza yango mpo na mosala ya bolimbisi masumu ya moto yango ; akobakisa na likolo na yango lokola makabo bakilo misato ya farine basangisa na mafuta mpe kati-kati ya litele moko ya mafuta.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 14:21
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Aponaka bilongi ya bakambi te, mpe asalelaka bazwi bolamu te mpo na bozwi na bango koleka babola, pamba te bango nyonso basalemaki na maboko na Ye.


Moto oyo anyokolaka mobola anyokolaka Mokeli ya mobola yango ; moto oyo asepelaka na pasi ya moninga akozanga te kozwa etumbu.


Mozwi mpe mobola bazali na likambo moko ya lisanga : ezali Yawe nde azali Mokeli na bango mibale.


Akobakisa lokola makabo ya bambuma bakilo zomi na mitano mpo na ngombe ya mobali mpe mpo na meme ya mobali ; mpe mpo na bana meme, akopesa nyonso oyo loboko na ye ekokoka, bakisa balitele misato na ndambo ya mafuta mpo na bakilo zomi na mitano ya bambuma.


Kasi soki ezali ndeke nde azali kobonzela Yawe lokola likabo ya kotumba, akomema ebenga ya zamba to mwana ebenga ya mboka.


Soki azangi makoki ya kozwa mwana meme, akoki komema bana mibale ya ebenga ya mboka to bibenga mibale ya zamba : moko mpo na mbeka ya kotumba, mpe mosusu, mpo na mbeka mpo na masumu. Sima na Nganga-Nzambe kosala mosala ya bolimbisi masumu, mwasi akokoma peto. › »


Na mokolo ya mwambe, akokamata bana meme mibale ezanga mbeba elongo na meme moko ya mwasi ezanga mbeba mpe esili kokokisa mobu moko, kilo libwa ya farine basangisa na mafuta lokola, likabo ya bambuma, mpe kati-kati ya litele moko ya mafuta.


Akobonza lisusu bibenga mibale kolanda bozwi na ye : moko lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu, mosusu lokola mbeka ya kotumba.


Soki moto oyo alapi ndayi azali mobola to azali na makoki te ya kopesa motuya oyo ekatama, akomema epai ya Nganga-Nzambe moto oyo ye alapelaki ndayi ya kopesa lokola likabo. Boye Nganga-Nzambe akokata motuya ya kopesa kolanda makoki ya moto oyo alapi ndayi.


Soki azangi makoki ya kozwa bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka, akomema epai ya Nganga-Nzambe bakilo misato ya farine lokola mbeka. Akotia te mafuta to ansa likolo na yango, pamba te ezali mbeka mpo na masumu.


Soki moto azangi makoki ya kozwa mwana meme, akomema epai na Yawe bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka : moko ekozala mbeka mpo na masumu, mpe mosusu, mpo na mbeka ya kotumba.


Bongo Yesu atalaki bayekoli na Ye mpe alobaki : « Esengo na bino oyo bozali babola, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bino !


Pamba te soki mokano ya malamu ezali, Nzambe andimaka likabo oyo moto apesi na motema malamu kolanda oyo azali na yango, kasi kolanda te oyo azali na yango te.


Pamba te boyebi ndenge nini Yesu-Klisto, Nkolo na biso, atalisaki ngolu na Ye epai na biso : Ye oyo azalaki mozwi, amikomisaki mobola mpo na bolamu na bino, mpo ete bokoma bazwi na nzela ya bobola na Ye.


Alongolaka mobola na putulu, mpe abimisaka na fulu moto oyo azanga ; mpo ete avandisa bango esika moko na bato ya lokumu mpe apesa bango kiti ya lokumu lokola libula. Pamba te miboko ya mabele ezali ya Yawe, mpe ezali na likolo na yango nde atia mokili.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ