Levitike 14:16 - Mokanda na Bomoi16 Nganga-Nzambe akozindisa, kati na mafuta oyo asili kosopa na loboko na ye ya ngambo ya mwasi, mosapi ya mibale ya loboko na ye ya ngambo ya mobali mpe akosalela yango mpo na kosopa mbala sambo mafuta liboso ya Yawe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bongo kati na mafuta oyo ekotikala ye na loboko, Nganga-Nzambe akokamata ndambo na yango mpo na kopakola na likolo ya litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali ya moto oyo azali komipetola, na mosapi ya liboso ya loboko na ye ya ngambo ya mobali mpe na mosapi ya liboso ya lokolo na ye ya ngambo ya loboko ya mobali, kaka na esika oyo awuti kotia makila ya mwana meme oyo ebonzami lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani.