Levitike 14:13 - Mokanda na Bomoi13 Akokata mwana meme yango kingo na esika oyo babomaka banyama oyo babonzi epai ya Nzambe lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu mpe lokola mbeka ya kotumba, kati na esika yango ya bule ; pamba te, ezala mbeka mpo na kozongisa boyokani to mbeka mpo na bolimbisi masumu, ezali ya Nganga-Nzambe : ezali eloko ya bule koleka. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bongo moto yango alobaki na ngai : « Bashambre oyo ezali na ngambo ya nor mpe ya sude, oyo etalana na lopango ya Tempelo ezali bashambre ya Banganga-Nzambe ; ezali kuna nde Banganga-Nzambe oyo bapusanaka liboso ya Yawe bakobanda kolia biloko oyo eleki bule. Ezali kuna nde bakobanda komema biloko oyo eleki bule : makabo ya bambuma, bambeka ya masumu mpe bambeka ya kozongisa boyokani, pamba te esika yango ezali bule.