Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 14:12 - Mokanda na Bomoi

12 Nganga-Nzambe akozwa mwana meme ya liboso mpe akobonza yango elongo na kati-kati ya litele moko ya mafuta lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani ; akotombola yango liboso ya Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 14:12
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala biteni ya mafuta ya meme ya mobali oyo okozwa : mokila, mafuta nyonso oyo ezalaka pembeni-pembeni ya biloko ya kati, mafuta oyo ezipi bafwa, bambuma mibale oyo ezalaka kati na loketo elongo na mafuta na yango mpe mopende ya ngambo ya mobali, pamba te meme yango ya mobali ezali ya libulisi.


Okotia biloko oyo nyonso na maboko ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali ; okoyebisa bango ete batombola yango liboso ya Yawe lokola likabo ya kotombola.


Okozwa tolo ya meme ya mobali mpo na kobulisa Aron, okotombola yango liboso ya Yawe lokola mbeka ya kotombola ; ekozala eteni na yo.


Nzokande, ezalaki mokano na Yawe ete anyokwama na nzela ya pasi. Atako Yawe akomisaki bomoi na ye mbeka mpo na masumu, akomona bakitani na ye mpe mikolo na ye ekobakisama ; bongo mokano na Yawe ekolongisama na loboko na ye.


Na mokolo ya mwambe, akokamata bana meme mibale ezanga mbeba elongo na meme moko ya mwasi ezanga mbeba mpe esili kokokisa mobu moko, kilo libwa ya farine basangisa na mafuta lokola, likabo ya bambuma, mpe kati-kati ya litele moko ya mafuta.


Nganga-Nzambe oyo azali kosala mosala ya kopetola akotia ye elongo na makabo na ye liboso ya Yawe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.


Sima na yango, Nganga-Nzambe akobonza, liboso ya Nzambe, mbeka mpo na masumu, mpo ete asala mosala ya bolimbisi masumu ya moto oyo azali komipetola na mbindo na ye ; mpe akokata lisusu kingo ya nyama oyo ebonzami lokola mbeka ya kotumba.


« Soki moto abuki mobeko mpe asali na nko te masumu liboso ya biloko oyo ebulisama mpo na Yawe, akobonzela Yawe lokola mbeka mpo na masumu na ye meme ya mobali ezanga mbeba, oyo akozwa kati na etonga na ye. Meme yango esengeli kokokana na motuya ya palata oyo okokata, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule : ezali mbeka mpo na kozongisa boyokani.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ