Levitike 14:10 - Mokanda na Bomoi10 Na mokolo ya mwambe, akokamata bana meme mibale ezanga mbeba elongo na meme moko ya mwasi ezanga mbeba mpe esili kokokisa mobu moko, kilo libwa ya farine basangisa na mafuta lokola, likabo ya bambuma, mpe kati-kati ya litele moko ya mafuta. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Soki moto yango azali mobola, bongo akoki kozwa te biloko wana nyonso, akokamata kaka mwana meme moko lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, mpo na kobonza yango mpo na mosala ya bolimbisi masumu ya moto yango ; akobakisa na likolo na yango lokola makabo bakilo misato ya farine basangisa na mafuta mpe kati-kati ya litele moko ya mafuta.