Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 13:6 - Mokanda na Bomoi

6 Sima na mikolo sambo yango, Nganga-Nzambe akotala ye lisusu malamu : soki lipalata oyo ebimaki na poso ya nzoto ekawuki mpe epanzani te na nzoto mobimba, Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali mbindo te ; ezali kolokoto ya pamba. Moto yango akosukola bilamba na ye mpo ete azali mbindo te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 13:6
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

soki, wana bato na Yo, Isalaele, bayoki mawa makasi kati na mitema na bango mpo na pasi to bokono yango, moko na moko atomboli maboko na ye na ngambo ya Tempelo oyo, asambeli to abondeli Yo,


yoka wuta na Likolo losambo mpe libondeli na bango, mpe longisa bango.


Epesaka mosali na Yo mayele ; moto nyonso oyo atosaka yango azwaka litomba mingi.


Nani akoki koloba : « Nabatelaka motema na ngai peto, nazali peto, nazali na masumu te ? »


Kati na mokili, ezali na moto moko te ya sembo oyo asalaka kaka malamu, bongo azanga kosala masumu.


akobuka te mwa nzete ya kolemba oyo egumbama mpe akoboma te moto ya singa ya mwinda oyo ekomi pene ya kokufa. Akomema bosembo na solo nyonso,


Moto nyonso oyo akosimba bibembe na yango akosukola bilamba na ye mpe akozala mbindo kino na pokwa.


Mpe moto nyonso oyo akolokota bibembe na yango akosukola bilamba na ye mpe akozala mbindo kino na pokwa. Bokomona yango mbindo.


mpe moto oyo akolia mosuni ya nyama oyo esili kokufa asengeli kosukola bilamba na ye, mpe akozala mbindo kino na pokwa. Moto oyo mpe akomema ebembe na yango akosukola bilamba na ye mpe akozala mbindo kino na pokwa.


« Soki poso ya nzoto ya moto ebimisi bambuma ya mike-mike to esali kolokoto to lipalata, bongo ezwi lolenge ya bokono ya maba, bakomema moto yango epai ya Nganga-Nzambe Aron to epai ya moko kati na bana na ye, Banganga-Nzambe.


Sima na mikolo yango sambo, Nganga-Nzambe akotala ye lisusu malamu : soki amoni ete lipalata oyo ebimaki na poso ya nzoto efungwami te mpe epanzani te na nzoto mobimba, akotika moto oyo abeli na esika oyo atiaki ye mpo ete asala lisusu mikolo sambo.


Nzokande, soki sima na Nganga-Nzambe kotala mpe koloba ete moto yango azali peto, kolokoto yango epanzani na poso, moto yango asengeli kozonga epai ya Nganga-Nzambe mpo ete atala ye lisusu.


Moto oyo asengeli na kopetolama akosukola bilamba na ye, akokata bapwale na ye nyonso mpe akomisukola nzoto na mayi ; sima na yango, akokoma peto. Bongo, akoki kozonga kati na molako, kasi akovanda mikolo sambo libanda ya ndako na ye ya kapo.


Boyamba malamu moto oyo alenda te na kondima, na kotiana lisusu tembe te na tina na makanisi.


Balingami na ngai, lokola tozali na bilaka ya lolenge oyo, tomipetolaka na nyonso oyo ekomisaka nzoto mpe molimo mbindo, mpo na kotambola na bomoi ya bosantu, kati na kotosa Nzambe.


Kasi bino, bomibebisaki liboso na Ye ; bozali lisusu bana na Ye te, mpo na mabe na bino, bino molongo ya bana mabe mpe ya bapengwi.


Na bongo, topusana pene ya Nzambe na motema mobimba, na kondima nyonso, na motema oyo epetolami na makanisi nyonso ya mabe, mpe na nzoto oyo esukolami na mayi ya peto.


Ezali na yango kaka malako na tina na bilei, masanga mpe ndenge ebele ya komipetola : mibeko ya bomoto, oyo bazalaki kosalela kino na tango oyo Nzambe abongolaki makambo nyonso.


Biso nyonso tobetaka mabaku na lolenge ebele. Moto oyo abetaka libaku te na maloba oyo ebimaka na monoko na ye azali moto ya kokoka mpe azali na makoki ya kobatela bomoto na ye nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ