Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 13:59 - Mokanda na Bomoi

59 Wana nde mitindo oyo etali litono ya bokono ya maba na likolo ya elamba basala na bapwale ya meme to elamba ya lino, na likolo ya eloko nyonso basala na poso ya nyama, mpo na koyeba soki elamba ezali peto to mbindo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 13:59
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki elamba ya kolata ezwi mbungi, ebebi mpe ekomi lokola nzoto ya moto oyo abeli bokono ya maba, ezala elamba basala na lino to na bapwale ya meme


to elamba ya pete to elamba ya lino mpo na komibatela na malili to elamba basala na bapwale ya meme to mpe ezala mbungi yango emonani na likolo ya eloko basala na kapo ya pete to na kapo ya makasi,


Tango bakosukola elamba oyo ezali na litono, soki litono yango elongwe, esengeli kosukola yango lisusu na mbala ya mibale mpo ete ezala peto. »


« Tala mobeko oyo etali moto oyo azali na bokono ya maba, na mokolo ya kopetolama na ye : ‹ Basengeli komema moto oyo azali na bokono ya maba epai ya Nganga-Nzambe.


Wana nde mibeko oyo ezali kotala moto oyo abeli bokono ya maba, oyo azali penza na makoki te mpo na kopetolama na ye. »


mpo na kotalisa soki moto azali mbindo to te. Yango nde mibeko oyo etali maba.


Bosengeli kosala ete bana ya Isalaele bazala mosika ya makambo oyo ekokomisa bango mbindo ; boye bakokufa te na mbindo na bango, na kokomisa mbindo Mongombo na Ngai, oyo ezali kati na bango. ›


Oyo nde mibeko mpo na mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali to mpo na mobali oyo abimi mayi ya mibali oyo ekomisi ye mbindo ;


Nzokande, soki akweyisi ndayi to ekateli yango, sima na koyoka yango, ye nde akomema mokumba ya mbeba ya mwasi na ye. › »


Oyo ezali nde mibeko mpe malako oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize epai ya bana ya Isalaele na bitando ya Moabi, oyo etalana na Jeriko, pene ya Yordani.


Wana nde ezali mobeko na tina na zuwa ; ekokanga mwasi ya libala oyo akosi mobali na ye mpe amikomisi mbindo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ