53 Nzokande, soki sima na kotala elamba yango malamu, Nganga-Nzambe amoni ete litono epanzani te na likolo ya elamba yango to na likolo ya kapo,
to elamba ya pete to elamba ya lino mpo na komibatela na malili to elamba basala na bapwale ya meme to mpe ezala mbungi yango emonani na likolo ya eloko basala na kapo ya pete to na kapo ya makasi,
Boye basengeli kotumba elamba yango, atako ezali ndenge nini, pamba te ezali na litono oyo bakoki kolongola te : basengeli kotumba yango.
Nganga-Nzambe akopesa mitindo ete basukola yango ; bongo akotia yango lisusu na esika oyo ekozala yango moko mpo na mikolo sambo.