Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 13:48 - Mokanda na Bomoi

48 to elamba ya pete to elamba ya lino mpo na komibatela na malili to elamba basala na bapwale ya meme to mpe ezala mbungi yango emonani na likolo ya eloko basala na kapo ya pete to na kapo ya makasi,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 13:48
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki elamba ya kolata ezwi mbungi, ebebi mpe ekomi lokola nzoto ya moto oyo abeli bokono ya maba, ezala elamba basala na lino to na bapwale ya meme


soki mbungi yango ezwi langi ya mayi ya pondu to ezwi langi ya motane, na likolo ya elamba, wana elakisi ete ezali litono ya maba ; boye basengeli komema yango epai ya Nganga-Nzambe mpo ete atala yango malamu.


Na mokolo ya sambo, Nganga-Nzambe akotala lisusu malamu litono yango. Soki amoni ete epanzani na likolo ya elamba ya kolata, ya elamba ya pamba, ya elamba ya malili to na likolo ya kapo ; wana elakisi ete ezali litono ya bokono ya maba oyo bakoki kolongola te mpe elakisi lisusu ete elamba yango ezali mbindo.


Boye basengeli kotumba elamba yango, atako ezali ndenge nini, pamba te ezali na litono oyo bakoki kolongola te : basengeli kotumba yango.


Nzokande, soki sima na kotala elamba yango malamu, Nganga-Nzambe amoni ete litono epanzani te na likolo ya elamba yango to na likolo ya kapo,


Sala keba ete obosana te Yawe, Nzambe na yo, na kozanga kotosa mitindo na Ye, mibeko na Ye mpe bikateli na Ye oyo nazali kopesa yo lelo.


mpo na bato mosusu, bobikisa bango na kobimisa bango na moto ; mpe mpo na bato mosusu lisusu, boyokela bango mpe mawa oyo esangana na bobangi, na koyina ezala ata bilamba na bango, oyo baposa na bango ya nzoto ekomisa mbindo.


Nzokande, kati na Sarde, ozali na ndambo ya bato oyo babebisaki te bilamba na bango. Bakotambola elongo na Ngai, na bilamba ya pembe, pamba te babongi na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ