Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 13:47 - Mokanda na Bomoi

47 Soki elamba ya kolata ezwi mbungi, ebebi mpe ekomi lokola nzoto ya moto oyo abeli bokono ya maba, ezala elamba basala na lino to na bapwale ya meme

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 13:47
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Basinga ya lifofe ekokoma bilamba te, misala na bango ekobomba bango te ; misala na bango ezali misala mabe, mpe misala ya mobulu nde ezalaka na maboko na bango.


Moko te azali kobelela Kombo na Yo to kolamusa makanisi mpo na kokangama na Yo, pamba te obombeli biso elongi na Yo mpe obebisi biso likolo ya masumu na biso.


Okamataki bilamba na yo mosusu, otongaki yango mpo na kobongisa bisambelo na yo ya likolo ya bangomba, epai wapi osalaki kindumba na yo. Likambo ya bongo etikala nanu kosalema te mpe ekotikala kosalema lisusu te !


Lokola bokono oyo akomi na yango ezali mbindo, ye moko mpe akozala mbindo. Boye akotonga ndako na ye mosika na bato mpe akovanda libanda ya molako.


to elamba ya pete to elamba ya lino mpo na komibatela na malili to elamba basala na bapwale ya meme to mpe ezala mbungi yango emonani na likolo ya eloko basala na kapo ya pete to na kapo ya makasi,


Boye basengeli kotumba elamba yango, atako ezali ndenge nini, pamba te ezali na litono oyo bakoki kolongola te : basengeli kotumba yango.


Wana nde mitindo oyo etali litono ya bokono ya maba na likolo ya elamba basala na bapwale ya meme to elamba ya lino, na likolo ya eloko nyonso basala na poso ya nyama, mpo na koyeba soki elamba ezali peto to mbindo.


Butu ekomi pene ya kosila mpe tongo elingi kotana. Yango wana, tobwaka misala ya molili mpe tolata bibundeli ya pole.


mpo ete bobwaka etamboli na bino ya kala, etamboli ya bomoto na bino ya kala, oyo ebebaka na nzela ya baposa ya lokuta,


Pamba te bokufaki penza, mpe bomoi na bino ezali sik’oyo ya kobombama elongo na Klisto kati na Nzambe.


mpo na bato mosusu, bobikisa bango na kobimisa bango na moto ; mpe mpo na bato mosusu lisusu, boyokela bango mpe mawa oyo esangana na bobangi, na koyina ezala ata bilamba na bango, oyo baposa na bango ya nzoto ekomisa mbindo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ