Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 13:45 - Mokanda na Bomoi

45 Moto oyo azwi bokono ya boye asengeli kolata bilamba epasuka, akokatisa suki te, akozipa mandefu na ye mpe akoganga : ‹ Mbindo ! Mbindo ! ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 13:45
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Ribeni azongaki na libulu mpe amonaki ete Jozefi azali lisusu kuna te, apasolaki bilamba na ye,


Tamari atiaki putulu na moto na ye mpe apasolaki nzambala na ye ya kitoko oyo alataki. Atiaki maboko na ye na moto mpe, wana azalaki kokende, azalaki kolela na mongongo makasi.


Na ekuke ya engumba, ezalaki na bato minei na maba. Bazalaki kolobana bango na bango : « Mpo na nini totikala awa kino tokokufa ?


Yobo atelemaki, apasolaki kazaka na ye, akokolaki suki ya moto na ye, akweyaki na mabele mpe afukamaki.


Yango wana, ngai moko, nazali komiyokela mawa mpe namileli, namikitisi kino na putulu ya mabele mpe na putulu ya moto. »


Oh Nzambe, yokela ngai mawa kolanda bolingo monene na Yo ; longola masumu na ngai kolanda mawa monene na Yo !


Pamba te nayebi mabe na ngai, mpe masumu na ngai ezalaka tango nyonso liboso na ngai.


Bokende, bokende, bobima awa ! Bosimba eloko moko te ya mbindo ! Bobima kati na yango mpe bozala peto, bino oyo bomemi bisalelo ya Tempelo ya Yawe !


Nalobaki : « Mawa na ngai ! Nabebi na ngai, pamba te nazali moto ya bibebu ya mbindo, navandaka kati na bato oyo bazali na bibebu ya mbindo, mpe miso na ngai emoni Mokonzi, Yawe, Mokonzi ya mampinga ! »


Moko te azali kobelela Kombo na Yo to kolamusa makanisi mpo na kokangama na Yo, pamba te obombeli biso elongi na Yo mpe obebisi biso likolo ya masumu na biso.


Soni ekomi lokola mbeto na biso, mpe kosambwa, lokola bulangeti mpo na komizipa ; pamba te biso mpe batata na biso, tosalaki masumu liboso ya Yawe, Nzambe na biso, totosaki Yawe te, wuta bolenge na biso. »


Boye, mokonzi elongo na bakalaka na ye nyonso oyo bazalaki koyoka makambo oyo ekomamaki na mokanda yango bamitungisaki na eloko moko te mpe bapasolaki bilamba na bango te.


Bato bazali koganga mpe koloba na bango : « Bolongwa awa, bato ya mbindo ! Bolongwa awa, bolongwa awa, bosimba biso te ! » Wana bazalaki kokima mpe kotelengana, bato ya bikolo mosusu bazalaki koloba : « Bavanda na esika oyo te ! »


Lela na se ya motema, kosala matanga na tina na ye te. Kanga kitendi na moto na yo mpe tia sandale na makolo na yo ; kozipa mandefu ya elongi na yo te mpe kolia bilei ya matanga te, ndenge ezali ezaleli ya bokoko na bino. »


Boye, bokosala ndenge Ngai nasali : bokozipa mandefu na bino te mpe bokolia bilei ya matanga te ;


Bopasola mitema na bino, kasi bilamba na bino te. Bozonga epai na Yawe, Nzambe na bino, pamba te atonda na ngolu mpe na mawa, asilikaka noki te mpe atonda na bolingo, abongolaka mokano na Ye ya kotindela bato pasi.


Sima na yango, Moyize alobaki na Aron, Eleazari mpe Itamari, bana mibali ya Aron : « Bopanza te suki ya mito na bino, bopasola te bilamba na bino lokola nde bozali na matanga, noki te bokokufa mpe bokobenda kanda ya Yawe likolo ya lisanga mobimba. Ezali bandeko na bino nyonso ya Isalaele nde bakolela bato oyo Yawe atumbi na moto.


Boye mobali yango azali na bokono ya maba, azali mbindo ; mpe Nganga-Nzambe asengeli koloba ete azali mbindo mpo na bokono oyo akomi na yango na moto.


Mokonzi ya Banganga-Nzambe azali na bokonzi likolo ya Banganga-Nzambe mosusu ; basopelaki ye mafuta ya epakolami na moto mpo na kobulisa ye, mpe asengeli kolata bilamba ya bonganga-Nzambe. Mpo na yango, asengeli te kopanza suki na ye ya moto to kopasola bilamba na ye na mokolo ya matanga.


Bamoni makambo bakotonda na soni, mpe bato oyo balobaka makambo oyo ekoya bakosambwa. Bango nyonso bakobomba bilongi na bango, pamba te Nzambe akoyanola bango te. »


« Pesa mitindo epai na bana ya Isalaele ete babimisa libanda ya molako moto nyonso oyo azali na bokono ya poso ya nzoto, moto nyonso oyo atangaka makila, mpe moto nyonso oyo akomi mbindo mpo ete asimbi ebembe.


Lokola azalaki kokota na mboka moko, bato na maba zomi bayaki kokutana na Ye ; batelemaki na mosika


Tango Simona Petelo amonaki bongo, afukamaki na mabolongo ya Yesu mpe alobaki : — Nkolo, zala mosika na ngai, pamba te nazali moto ya masumu !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ