Levitike 13:43 - Mokanda na Bomoi43 Nganga-Nzambe akotala ye malamu : soki amoni ete bokono yango ya maba ebandi kobimisa bambuma ya mike-mike ya mwa pembe mpe ya mwa motane, ezala na dikosi to na mbunzu ; wana elakisi ete azali na bokono ya maba na libandi. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Banganga-Nzambe na yango bazali kobuka mobeko na Ngai mpe bazali kobebisa bosantu ya biloko na Ngai ya bule, bazali kosala bokeseni te kati na biloko ya bule mpe biloko mosusu, bazali kosunga bato te ete bayeba kosala bokeseni kati na makambo oyo ezali mbindo mpe oyo ya peto ; bakangeli Basaba na Ngai miso, boye babulisi Ngai te kati na bango.