Levitike 13:4 - Mokanda na Bomoi4 Soki lipalata oyo ebimi na poso ezali ya pembe mpe ezali kongenga, bongo efungwami te mpo na kosala pota na poso ya nzoto, Nganga-Nzambe akolongola kati na lisanga, moto oyo abeli mpe akotia ye na esika oyo akozala ye moko mikolo sambo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nganga-Nzambe akotala moto yango malamu : soki bapwale oyo ezali kati na litono ebongwani, ekomi pembe mpe litono yango kati na poso ebongwani, esali pota : elakisi ete ezali bokono ya maba nde ebimi na esika oyo ezikaki. Boye, Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali mbindo, pamba te azali na bokono ya maba.
Nganga-Nzambe akotala malamu poso ya nzoto oyo esili kozwa bokono. Soki amoni ete bapwale oyo ezali na esika oyo ezwi bokono na poso ebongwani mpe ekomi pembe ; bongo bapota efungwami na poso ya nzoto, wana elakisi ete ezali bokono ya maba ; mpe Nganga-Nzambe akoki koloba mbala moko ete moto yango azali mbindo.