27 Na mokolo ya sambo, Nganga-Nzambe akotala ye malamu : soki litono epanzani solo na poso, Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali mbindo, pamba te ezali bokono ya maba.
« Soki poso ya nzoto ya moto ebimisi bambuma ya mike-mike to esali kolokoto to lipalata, bongo ezwi lolenge ya bokono ya maba, bakomema moto yango epai ya Nganga-Nzambe Aron to epai ya moko kati na bana na ye, Banganga-Nzambe.
Nzokande, soki tango Nganga-Nzambe atali moto yango malamu, amoni te bapwale ya pembe kati na litono ; mpe soki litono ebongwani te, esali na yango pota te na poso mpe epanzani te ; akotia ye na esika oyo akozala ye moko mpo na mikolo sambo.
Nzokande, soki litono yango etikali kaka esika moko, epanzani te na poso kasi ekawuki, wana etalisi ete ezali kaka kobeba ya poso ya nzoto mpo na kozika na ye na moto. Boye Nganga-Nzambe akoloba ete azali mbindo te, pamba te ezali kaka elembo ya pota ya moto.