Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 13:25 - Mokanda na Bomoi

25 Nganga-Nzambe akotala moto yango malamu : soki bapwale oyo ezali kati na litono ebongwani, ekomi pembe mpe litono yango kati na poso ebongwani, esali pota : elakisi ete ezali bokono ya maba nde ebimi na esika oyo ezikaki. Boye, Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali mbindo, pamba te azali na bokono ya maba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 13:25
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lokola osali bongo, bokono ya maba ya Namani ekokangama na yo mpe bakitani na yo mpo na libela. Bongo Geazi alongwaki na liboso ya Elize. Poso ya nzoto na ye ekomaki na maba, mpe akomaki pembe lokola mvula ya pembe.


Sima, Yawe alobaki na ye lisusu : — Tia loboko na yo na tolo na yo. Moyize atiaki loboko na ye na tolo na ye ; mpe tango alongolaki yango, loboko yango ezwaki bokono ya maba ; ekomaki pembe lokola mvula ya pembe.


Soki poso ya nzoto ya moto moko eziki na moto, bongo litono moko ya pembe to ya motane esalemi kati na esika oyo eziki,


Nzokande, soki tango Nganga-Nzambe atali moto yango malamu, amoni te bapwale ya pembe kati na litono ; mpe soki litono ebongwani te, esali na yango pota te na poso mpe epanzani te ; akotia ye na esika oyo akozala ye moko mpo na mikolo sambo.


Soki lipalata oyo ebimi na poso ezali ya pembe mpe ezali kongenga, bongo efungwami te mpo na kosala pota na poso ya nzoto, Nganga-Nzambe akolongola kati na lisanga, moto oyo abeli mpe akotia ye na esika oyo akozala ye moko mikolo sambo.


Tango kaka lipata elongwaki likolo ya Ndako ya kapo, bokono ya maba ezwaki mbala moko Miriami : ezalaki pembe lokola mvula ya pembe. Aron abalukaki mpo na kotala Miriami mpe amonaki ete azwi bokono ya maba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ