Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 13:20 - Mokanda na Bomoi

20 Soki Nganga-Nzambe amoni ete lidusu moko esalemi na poso ya nzoto ya moto wana, bapwale na ye ebongwani mpe ekomi pembe, akoloba ete moto yango azali mbindo, pamba te ezali bokono ya maba oyo ebimi na esika oyo elembo ya pota ya bibon ezali.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 13:20
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

bongo bambuma mike-mike ya pembe to lipalata ya mwa pembe mpe mwa motane ebimi na esika oyo bibon ezalaki, moto yango asengeli kokende epai ya Nganga-Nzambe oyo akotala ye malamu.


« Soki poso ya nzoto ya moto ebimisi bambuma ya mike-mike to esali kolokoto to lipalata, bongo ezwi lolenge ya bokono ya maba, bakomema moto yango epai ya Nganga-Nzambe Aron to epai ya moko kati na bana na ye, Banganga-Nzambe.


Nzokande, soki na ngonga ya kotala ye, Nganga-Nzambe amoni te bapwale ya moto yango kobongwana pembe mpe lidusu kosalema na poso na ye, akotia ye na esika oyo akozala ye moko mpo na mikolo sambo.


Nganga-Nzambe akotala malamu poso ya nzoto oyo esili kozwa bokono. Soki amoni ete bapwale oyo ezali na esika oyo ezwi bokono na poso ebongwani mpe ekomi pembe ; bongo bapota efungwami na poso ya nzoto, wana elakisi ete ezali bokono ya maba ; mpe Nganga-Nzambe akoki koloba mbala moko ete moto yango azali mbindo.


ekokende lisusu kozwa milimo mosusu sambo oyo eleki yango na mabe, mpe ekoya elongo na yango mpo na kokota na elulu mpe kovanda kuna. Boye, bomoi ya moto yango ekokoma lisusu mabe koleka ndenge ezalaki liboso. Ekozala mpe bongo mpo na bato mabe ya ekeke oyo.


Sima na mwa tango, Yesu amonaki, kati na lopango ya Tempelo, moto oyo abikaki. Alobaki na ye : — Tala, omoni ndenge okomi sik’oyo nzoto kolongono. Kosala lisusu masumu te, noki te likambo moko ya mabe koleka ekomela yo.


Soki, sima na bango kokabwana na mbindo ya mokili, mpo ete bayebi Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso, bamizongisi lisusu na bowumbu ya mbindo yango, bomoi na bango ekokoma mabe koleka ndenge ezalaki liboso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ